Lingala of the Congo

Yoane

Yoane 1

Yezu Kristo ayeeli bato moi pe bomoi

1 Na ebandeli, liboso 'tè Nzambe ásala Likolo na se, oyo azali Maloba ya Nzambe, azalaká. Ye azalaká esika moko ná Nzambe; azalaká ndenge moko ná Nzambe. 2 Ya solo, na ebandeli, ye azalaká esika moko ná Nzambe. 3 Nzambe asalaka biloko nyonso ná ye, moko té ezangi kosalama na ye. 4 Bomoi nyonso eutaka nde na ye; pe yango ezalaká lokola moi po na bato. 5 Moi yango ezali kongenga na kati ya molili; molili ekokaki kozipa yango té. 6 Nzambe atindaki moto moko, kombo na ye Yoane Mobatisi. 7 Ye ayaki kosakola sango ya moi, po bato nyonso bándima. 8 Ye azalaki moi té, kasi ayaki nde po ásakola sango ya moi. 9 Moto oyo azali Maloba ya Nzambe azali moi ya solo; ayaki awa na mokili; azali kongengela moto nyonso. 10 Azalaki awa na mokili; na ye Nzambe asalaka mokili; kasi bato bayebaki ye té. 11 Ayaki na mboka na ye moko, kasi bato na ye bayambaki ye té. 12 Nzokande bato mosusu bayambaki ye, pe bandimeli ye; apesi bango bokonzi bákóma bana ya Nzambe. 13 Bakómaki bana ya Nzambe na ndenge ya bomoto té, ndenge batata babotaka bana; kasi ezali nde Nzambe moto abotá bango. 14 Maloba ya Nzambe ekómaki moto. Moto yango ayaki kofanda na kati na biso; tomonaki lokumu na ye, lokumu oyo Tata apesi bobele na Mwana na ye se moko. Ye atondaki na bolamu ya solo ya Nzambe. 15 Yoane Mobatisi abandaki kosakola po na ye; ayebisaki bato boye: "Oyo azali moto nalobaki na bino 'tè: Akoya sima na ngai, kasi aleki ngai, pamba té azalaká tango ngai nanu nabotami té." 16 Ye atondá na bomengo nyonso; pe biso nyonso tozwi bolamu mingi penza epai na ye. 17 Pamba té Nzambe apesaká bato Mibeko na maboko ya Moize; kasi Yezu Kristo ayeeli biso bolamu ya solo ya Nzambe. 18 Moto moko té nanu amoná Nzambe, kaka Mwana na ye se moko, oyo azali Nzambe pe azali esika moko ná Tata, ye nde moto ayebisi biso ndenge Nzambe azali.

Mateya ya Yoane Mobatisi

19 Mokolo moko bakonzi ya Bayuda oyo bazalaká na Yeruzalem batindi banganga-Nzambe ná ba-Levite, po bákende kotuna Yoane boye: " Yo ozali nani?" 20 Ye aboyaki kozongisela bango eyano té, kasi alobaki polele liboso ya bato nyonso: "Ngai nazali Mesia té." 21 Bango batuni ye: "Bongo ozali nani? Ozali Eliya?" Yoane azongiseli bango: "Té, nazali Eliya té." Bango batuni ye: "Ozali Profete oyo tozali kozela?" Azongiseli bango: "Té." ^Batuni ye lisusu: "Yo ozali nani? Po tókende koyebisa na bato oyo batindi biso. Olobi nini po na yo moko?" 23 Yoane azongiseli bango: "Ngai nazali moto oyo profete Ezaya alobaká: 'Moto moko azali kobelela na kati ya esobe boye: Nkolo alingi koya! Bóbongisela ye nzela.' " 24 Na kati ya bato oyo Bayuda batindaki epai ya Yoane, ba-Farizé pe bazalaki wana. "Batuni Yoane: "Bongo soki yo ozali Mesia té, Eliya té, Profete pe té, kasi ndenge nini ozali kobatisa bato?" 26 Yoane azongiseli bango: "Ngai nazali kobatisa bobele na mai; nzokande moto moko azali na kati na bino, bino boyebi ye té. 27 Ye akoya sima na ngai, kasi nakoki kutu té kofungola ata singa ya sapatu na ye." 28 Makambo oyo nyonso elekaki na Betanie, na ngambo ya mai ya Yordan, na esika Yoane azalaki kobatisa bato.

Yezu, Mwana-Meme ya Nzambe

29 Sima ya mokolo wana, Yoane amoni Yezu azali koya epai na ye, pe alobi: "Tala Mwana-Meme ya Nzambe oyo akobanda kolongola masumu ya bato. 30 Ezali nde ye, moto oyo nalobaki na bino: 'Moto akoya sima na ngai, aleki ngai, pamba té azalaká tango ngai nanu nabotami té.' 31 Tango nazalaki koloba boye, nayebaki penza té soki ye azali nani; kasi nabandaki kobatisa bato na mai, po ye áya komilakisa na ekolo ya Israel." 32 Yoane alobi lisusu: "Namonaki Molimo auti na Likolo lokola pijon, pe ayei kofanda na motú na ye. 33 Ngai nayebaki penza té soki ye azali nani, kasi Nzambe oyo atindaki ngai po nábatisa bato na mai, alobaki na ngai: 'Okomona Molimo akouta na Likolo pe akofanda na moto moko; ezali nde ye wana moto akobatisa bato na Molimo Mosantu.' 34 Namonaki nyonso wana, pe nazali koyebisa bino 'tè azali Mwana ya Nzambe."

Yezu aponi bayekoli na ye ya liboso

35 Sima ya mokolo wana, Yoane azalaki lisusu na esika yango, ná bayekoli na ye mibale. 36 Awa amoni Yezu azali koleka, alobi: "Tala Mwana-Meme ya Nzambe!" "Tango bayekoli na ye wana mibale bayoki boye, batiki Yoane pe balandi Yezu. 38 Yezu abaluki, amoni bango bazali kolanda ye, pe atuni bango: "Bozali koluka nini?" Bazongisi: "Rabi, ofandaka wapi?" (Rabi elingi koloba Moteyi). 39 Ye azongiseli bango: "Bóya kotala." Bakei pe bamoni esika ye azalaki kofanda, bongo batikalaki na ye mokolo wana. Ezalaki na ngonga ya minei ya pokwa. 40 André, ndeko ya Simon Piere, azalaki moko na kati ya bato mibale oyo bayokaki maloba ya Yoane pe balandaki Yezu. 41 Sima na yango André akutanaki ná ndeko na ye Simon, pe alobi na ye: "Tosi'tomoni Mesia" (Na monoko ya grek: Kristo). 42 Bongo André amemi ndeko na ye epai ya Yezu. Tango Yezu amoni Simon alobi na ye: "Ozali Simon, mwana ya Yoane. Kombo na yo ekómi Sefas" (elingi koloba Piere, Libanga). 43 Sima ya mokolo wana, Yezu alingaki kokende na Galilé; akutani ná Filipe pe alobi na ye: "Landa ngai." 44 Filipe azalaki moto ya mboka Betsaida, mboka moko ná André pe Piere. 45 Na sima Filipe pe akutani ná Natanael, alobi na ye: "Tosi'tomoni moto oyo bakómá na Mibeko ya Moize pe na mikanda ya baprofete. Ezali nde Yezu, mwana ya Jozef, ya mboka Nazaret." 46 Natanael alobi na ye: "Eloko nini ya malamu ekoki kobima na Nazaret?" Filipe azongiseli ye: "Yaka kotala." 47 Tango Yezu amoni Natanael azali koya epai na ye, alobi na ye: "Tala motoya solo ya Israel, azali na lokuta té." ^Natanael atuni ye: "Ndenge nini oyebi ngai?" Yezu azongiseli ye: "Liboso 'tè Filipe ábenga yo, namonaki yo na se ya nzete ya figi." 49 Natanael alobi na ye: "Moteyi, ozali Mwana ya Nzambe; ozali Mokonzi ya Israel!" 50 Yezu alobi na ye: "Ondimi po nalobi na yo 'tè namonaki yo tango ozalaki na se ya nzete ya figi. Okomona makambo eleki oyo na monene." 51 Yezu alobi na bango lisusu: "Nalobi na bino, ya solo: bokomona Likolo ekofungwana, pe ba-anjelu bakobanda kokita pe komata; pamba té Nzambe akozala kotinda bango lokola bantoma epai na ngai, Mwana ya Moto."

Yoane 2

Feti ya libala na mboka Kana

1 Sima ya mikolo mibale, feti ya libala ezalaki na mboka Kana, na Galilé. Mama na Yezu azalaki kuna. 2 Babengisaki pe Yezu ná bayekoli na ye. 3 Tango vinu esilaki, mama na Yezu alobi na ye: "Bazali lisusu na vinu té." 4 Kasi Yezu azongiseli ye: "Mama, biso na yo likambo nini? Tango na ngai nanu ekoki té." 5 Bongo mama na ye alobi na bato ya mosala: "Bósala makambo nyonso akotinda bino." 6 Bilokú motoba ya mabanga ezalaki wana, oyo Bayuda bazalaki kosukolela na yango, ndenge mibeko na bango ezalaki kotinda. Elokú moko ekoki kokota bisangala mwambe to zomi na mibale. 7 Yezu alobi na bato ya mosala: "Bótondisa bilokú oyo na mai." Batondisi yango meke. 8 Bongo Yezu alobi na bango lisusu: "Sik'oyo, bózwa mwa ndambo na yango, pe bókende kolakisa yango na mokonzi ya feti." Bamemeli ye yango. 9 Mokonzi ya feti ameki yango, mai ekómi vinu! Ayebaki té soki vinu yango euti wapi; kasi bato ya mosala oyo batókaki mai bango nde bayebaki. Abengi moto oyo abalaki, 10 pe alobi na ye: "Ndenge nini yo obombi vinu ya malamu tii sik'oyo? Bato nyonso bapesaka liboso vinu ya malamu, bongo soki bato babandi kolangwa, nde bapesi bango vinu oyo ezali malamu mingi té." 11 Wana nde likamwisi ya liboso oyo Yezu asalaki. Asalaki yango na mboka Kana, na Galilé. Amonisaki lokumu na ye, pe bayekoli-na ye bandimaki ye. 12 Sima na yango Yezu akei na Kafarnaum, ná mama na ye, bandeko na ye, pe bayekoli na ye. Bafandaki kuna mikolo mingi té.

Yezu na Ndako ya Nzambe ya Yeruzalem

13 Lokola feti ya Bayuda ya Pake ekómaki penepene, Yezu akei na Yeruzalem. 14 Tango akoti na Ndako ya Nzambe, akuti bato ya mombongo bazali kotekisa bangombe, bameme ná ba-pijon, pe bato oyo bashanjaka mbongo bafandi na bamesa na bango. 15 Yezu asali fimbu ya singa, abandi kobengana bango nyonso na Ndako ya Nzambe, ná bangombe na bango pe bameme. Abaloli bamesa ya bato oyo bazalaki koshanjé mbongo, apanzi pe mbongo na bango. 16 Alobi na bato oyo bazalaki kotekisa ba-pijon: "Bólongola biloko oyo awa! Ndako ya Tata na ngai, bókómisa yango lokola zando té!" 17 Bayekoli na ye babandi kokanisa makambo oyo ekómamá na Mikanda: "E Nzambe, bolingo na ngai po na Ndako na yo ezali kozikisa ngai motema." 18 Bongo bakonzi ya Bayuda batuni Yezu: "Ndenge nini okoki kolakisa biso 'tè ozali na bokonzi ya kosala bongo?" 19 Yezu azongiseli bango: "Bóboma Ndako ya Nzambe oyo, pe nakotónga yango lisusu na mikolo misato." 20 Bayuda balobi na ye: "Basalaki bambula 46 po na kotónga Ndako oyo, bongo yo okotónga yango na mikolo misato?" 21 Kasi Ndako ya Nzambe oyo Yezu alobelaki, ezali ye moko. 22 Tango Yezu asekwaki, nde na tango wana bayekoli na ye bayei kokanisa 'tè alobaki maloba yango; bongo bandimaki makambo oyo ekómamá na Mikanda, pe maloba oyo Yezu alobaki.

Yezu ayebi mitema ya bato

23 Tango Yezu azalaki na Yeruzalem po na feti ya Pake, bato mingi bandimaki ye po bamonaki makamwisi oyo azalaki kosala. 24 Kasi Yezu atiaki motema epai na bango té, pamba té ayebaki bango nyonso malamu. "Yezu azalaki na posa té báyebisa ye makambo ya bato. Ye moko ayebi makambo nyonso oyo ezali na mitema ya bato.

Yoane 3

Yezu ná Nikodeme

1 Moto moko azalaki na kati-ya ba-Farizé, kombo na ye Nikodeme. Ye azalaki pe moto monene ya Bayuda. 2 Mokolo moko ayei kotala Yezu na butu, alobi na ye: "Moteyi, toyebi 'tè Nzambe atindi yo po na koteya bato. Pamba té moto moko té akoki kosala makamwisi ndenge yo ozali kosala, soki Nzambe azali na ye té." 3 Yezu azongiseli ye: "Nazali koloba na yo, ya solo: soki moto abotami mbala ya mibale té, akoki kozala moto ya mboka ya Nzambe té." "Nikodeme atuni ye: "Ndenge nini moto akoki kobotama mbala ya mibale, soki akómi mobange? Azonga lisusu na libumu ya mama na ye, po ábotama mbala ya mibale?" 5 Yezu alobi na ye: "Nazali koloba na yo, ya solo: bobele oyo abotami na mai pe na Molimo nde moto akoki kokóma moto ya mboka ya Nzambe. 6 Oyo abotami na moto, azali moto; oyo abotami na Molimo, azali molimo. 7 Kokamwa té po nalobi na yo: Bosengeli kobotama mbala ya mibale. 8 Molimo esalaka lokola mopepe ekendeke epai yango elingi. Oyokaka makelele na yango, kasi oyebaka té epai yango euti to epai yango ezali kokende. Esalamaka pe ndenge wana na moto oyo abotami na Molimo." 9 Bongo Nikodeme atuni ye: "Ndenge nini makambo yango ekoki kosalama?" 10 Yezu azongiseli ye: "Ozali moteyi monene na kati ya Israel; bongo oyebi makambo oyo té? 11 Nazali koloba na yo, ya solo: nalobaka makambo oyo nayebi, pe nayebisaka bino makambo oyo namoni; kasi bondimaka yango té. 12 Soki nalobeli bino makambo oyo esalamaka awa na se, bozali kondimela ngai té; ndenge nini bokondimela ngai soki nayebisi bino makambo oyo esalamaka na Likolo? 13 Ata moto moko té asi'abutá na Likolo; kaka ngai Mwana ya Moto nde nauti na Likolo. 14 Pe ndenge Moize atombolaká ekeko ya nyoka na esobe, bobele bongo pe esengeli bátombola ngai, Mwana ya Moto, 15 po moto nyonso oyo akondima ngai ázwa bomoi ya seko. 16 "Ya solo, Nzambe alingi bato mingi penza; yango wana apesi Mwana na ye se moko, po 'tè moto nyonso oyo akondimela ngai ákufa té, kasi ázwa bomoi ya seko. 17 Soki Nzambe atindaki ngai epai ya bato, ezali té po nákatela bango etumbu, kasi po nábikisa bango. 18 Moto oyo andimeli ngai Mwana, azwaka etumbu té; kasi oyo andimeli ngai té asi'azwi etumbu; pamba té aboyi kondima Mwana se moko ya Nzambe. 19 Tala ndenge Nzambe akatelaka makambo: moi eyei na mokili, kasi bato bazali kolinga mingi molili; baboyi moi, po basalaka makambo ya mabe. 20 Moto nyonso oyo asalaka mabe, aboyaka moi, ayaka epai ya moi té, soki té misala na ye ya mabe ekomonana. 21 Kasi oyo asalaka ndenge Nzambe azali kolakisa, ayaka epai ya moi, po yango émonisa 'tè ye atosaka Nzambe, na makambo nyonso oyo asalaka."

Yezu ná Yoane Mobatisi

22 Sima na yango, Yezu ná bayekoli na ye bakei na région ya Yuda. Kuna atikalaki ná bango mwa tango, pe azalaki kobatisa bato. "Yoane pe azalaki kobatisa bato na Ainon, penepene ya Salim, pamba té kuna mai ezalaki mingi. Bato babandaki koya epai na ye, pe azalaki kobatisa bango. 24 Na tango wana nanu batii Yoane na boloko té. 25 Mokolo moko bayekoli mosusu ya Yoane bazalaki kotiana tembe ná Moyuda moko po na makambo etali Mibeko na bango ya kosukola. 26 Bongo bakei epai ya Yoane, balobi na ye: "Moteyi, moto oyo azalaki ná yo na ngambo ya Yordan, oyo olobelaki biso po na ye, sik'oyo ye pe abandi kobatisa bato. Bato nyonso bazali kokende epai na ye." 27 Yoane azongiseli bango: "Moto akoki kozwa eloko moko té, soki Nzambe apesi ye yango té. 28 Bino moko boyebi 'tè nalobaki na bino: 'Ngai nazali Mesia té; kasi Nzambe atindaki ngai liboso, po Mesia alingi koya.' 29 Ye azali lokola mobali oyo azwi mwasi, pe azali kosalisa feti ya libala. Ngai nazali lokola moninga ya mobali, oyo afandi penepene na ye pe azali koyoka ye, bongo azali na esengo mingi po na koyoka mongongo ya moninga na ye oyo abali. Wana nde esengo na ngai; ya solo, nasepeli penza. 30 Esengeli lokumu na ye éleka ya ngai, bongo ya ngai ékita."

Moto oyo auti na Likolo

31 "Moto oyo auti na Likolo aleki bato nyonso. Bato ya mokili oyo bakangamaka kaka na mokili, pe balobaká bobele makambo ya mokili. Moto oyo auti na Likolo aleki bato nyonso; 32 alobaká makambo ye ayoki pe amoni; kasi moto moko té azali koyamba maloba na ye. 33 Bato oyo bayambi maloba na ye, bandimi 'tè Nzambe alobaká makambo ya solo. 34 Moto oyo Nzambe atindi, alobaká maloba ya Nzambe, pamba té Nzambe atondisi ye na Molimo na ye. 35 Tata alingaka Mwana na ye; apesi makambo nyonso na maboko na ye. 36 Moto oyo andimi Mwana, akozwa bomoi ya seko; oyo atosi Mwana té akozwa bomoi ya seko té, kasi akotikala seko na etumbu ya Nzambe."

Yoane 4

Yezu ná mwasi ya Samarie

1 Na tango wana ba-Farizé bayoki 'tè Yezu azalaki kozwa bayekoli ebele koleka Yoane Mobatisi, pe abandaki kobatisa bato mingi. 2 Nzokande Yezu ye moko azalaki kobatisa bato té, kaka bayekoli na ye nde bazalaki kobatisa. 3 Tango Yezu ayoki makambo babandaki koloba po na ye, alongwe na région ya Yuda pe azongi na Galilé. 4 Po na kokende kuna, asengelaki kokatisa région ya Samarie. 5 Yezu akómi na mboka moko ya Samarie, kombo na yango Sikar; ezali penepene ya elanga oyo Jakob apesaká na mwana na ye Jozef. 6 Libulu moko ya mai ezalaki wana, bábengaka yango libulu ya Jakob. Yezu alembaki na nzela, bongo afandi pembeni ya libulu yango. Ezalaki penepene na midi. 7-8 Awa bayekoli na ye bakendeki na Sikar kosomba biloko ya kolia, mwasi moko ya Samarie ayei kotoka mai. Yezu alobi na ye: "Pesa ngai mai námela." 9 Kasi mwasi yango azongiseli ye: "Yango boni? Yo ozali Moyuda; ngai nazali moto ya Samarie. Ndenge nini ozali kosenga ngai mai?" Pamba té, Bayuda ná bato ya Samarie bazalaki koyokana té. 10 Yezu alobi na ye: "Soki oyebaki ngai, pe soki oyebaki likabo oyo Nzambe apesaká na bato, mbele yo moto olingaki kosenga ngai mai ya komela, bongo nalingaki kopesa yo mai ya bomoi." 11 Mwasi alobi na ye: "Tata, ozali na katini té, pe libulu ezali molai penza. Ndenge nini okoki kozwa mai ya bomoi? 12 Ezali koko na biso Jakob moto atikelá biso libulu ya mai oyo; ye moko kutu amelaka mai ya libulu oyo, ná bana na ye pe banyama na ye. Yo okanisi oleki ye?" 13 Yezu azongiseli ye: "Soki moto ameli mai oyo, akoyoka lisusu posa ya mai; 14 kasi soki ameli mai oyo ngai nakopesa ye, akoyoka lisusu posa ya mai té. Pamba té mai oyo ngai nakopesa ye, ekobanda kobimela ye tango nyonso; yango nde ekopesa ye bomoi ya seko." 15 Mwasi alobi na ye: "Tata, pesa ngai mai yango po náyokaka lisusu posa ya mai té, pe náyaka lisusu kotoka mai awa té." 16 Yezu azongiseli ye: "Kende kobenga mobali na yo, bongo óya na ye awa." 17 Mwasi azongisi: "Nazali na mobali té." Yezu alobi na ye: "Olobi malamu 'tè: Nazali na mobali té. 18 Pamba té, ozalaki na mibali mitano, bongo oyo azali na yo sik'oyo, azali mobali na yo penza té. Olobi makambo ya solo." 19 Mwasi azongiseli Yezu: "Mokonzi, namoni 'tè ozali profete. 20 Bakoko na biso ya Samarie bazalaká kosambela Nzambe na ngomba oyo, kasi bino Bayuda bolobaka 'tè basengeli kosambela Nzambe kaka na Yeruzalem." 21 Yezu alobi na ye: "Mama, ndimela ngai; tango ekómi penepene, oyo bakosambela Tata bobele na ngomba ya Samarie té to na Yeruzalem. 22 Bino bato ya Samarie bosambelaka Nzambe, kasi boyebi ye té; biso Bayuda toyebi Nzambe oyo tosambelaka, pamba té nzela ya kobika euti na Bayuda. 23 Kasi tango ekoya, yango pe esi'ekoki, oyo Molimo Mosantu akobongisa mitema ya bato po básambelaka Tata na ndenge ye moko azali kolakisa; pamba té Tata alingaka baoyo básambelaka ye ndenge wana. 24 Nzambe azali Molimo; yango wana bato oyo básambelaka ye, esengeli Molimo Mosantu ábongjsa mitema na bango po básambelaka ye na ndenge ye moko azali kolakisa." 25 Mwasi alobi na ye: "Nayebi 'tè Mesia akoya. Tango ye akoya, akoyebisa biso makambo nyonso." 26 Yezu azongiseli ye: "Ngai oyo nazali koloba na yo, nazali Mesia." 27 Na tango wana bayekoli ya Yezu bazongi, bakuti ye azali kosolola ná mwasi, bakamwaki mingi penza. Kasi ata moto moko té atunaki Yezu soki azali koluka nini, to po na nini azali kosolola na ye. 28 Mwasi atiki elokú na ye wana, pe akei kobenga bato; alobi na bango: 29 "Bóya kotala moto moko azali kuna, ayebisi ngai makambo nyonso oyo nasalaki. Ye akoki kozala Mesia té?" 30 Bato basimbi nzela, babandi kokende esika Yezu azalaki. 31 Bongo bayekoli babondeli Yezu balobi: "Moteyi, lia ko!" 32 Kasi Yezu azongiseli bango: "Ngai nazali na biloko ya kolia oyo bino boyebi té." 33 Bayekoli bamitunani: "Moto mosusu ayeelaki ye biloko ya kolia?" 34 Yezu alobi na bango: "Bilei na ngai ezali: Kotosa makambo Moto oyo atindaki ngai alingaka, pe kosilisa mosala na ye. 35 Bino bolobaka: Soki moto akoni mbuma, esengeli kosala sanza minei po na kobuka yango. Kasi ngai nalobi na bino: Botala bilanga. Mbuma esi'eteli, ekoki na kobuka. 36 Moto abuki mbuma yango asi'azwi lifuta na ye; abombi mbuma po na bomoi ya seko; yango wana moto oyo akoni ná oyo abuki, bazali kosepela esika moko. 37 Pamba té balobá ya solo boye: 'Moko akonaka, mosusu abukaka.' ^Natindaki bino bókende kobuka mbuma na elanga oyo bino bokonaki té; bato mosusu bamonaki pasi, pe bino bozwi bolamu po na pasi na bango." 39 Tango mwasi alobaki na bato ya mboka yango 'tè: "Yezu ayebisi ngai makambo nyonso oyo nasalaki", bato mingi bandimi Yezu, 40 bongo bayei epai na ye pe babondeli ye po átikala ná bango; yango wana Yezu atikalaki kuna mikolo mibale. 41 Bato mosusu mingi bayei kondima Yezu po na makambo oyo ye moko azalaki koloba. 42 Balobi na mwasi wana: "Sik'oyo tondimi kaka po na maloba na yo té, pamba té biso moko toyoki-ye, pe toyebi 'tè azali ya solo Mobikisi ya bato."

Yezu abikisi mwana ya mokonzi moko ya leta

43 Sima ya mikolo mibale, Yezu alongwe wana, akei na Galilé. 44 Mokolo mosusu Yezu ye moko alobaki: "Profete, bapesaka ye lokumu té na mboka na ye." 45 Tango akómaki na Galilé, bato nyonso bayambaki ye malamu, pamba té bango pe bakendeki na feti ya Pake na Yeruzalem, pe bamonaki makambo nyonso ye asalaki na feti yango. 46 Bongo Yezu azongi na Kana, epai abongolaki mai vinu. Mokonzi moko ya leta azalaki na Kafarnaum, mwana na ye azalaki na pasi. 47 Tango ayoki 'tè Yezu alongwe na Yuda pe akómi na Galilé, akei kotala ye, pe abondeli ye áya kobikisa mwana na ye azalaki kobunda na liwa. 48 Yezu alobi na ye: "Bino bondimaka bobele soki bomoni bilembo to makamwisi." 49 Mbuta-muntu wana azongiseli ye: "Mokonzi, yaka tókende, liboso 'tè mwana na ngai ákufa." 50 Yezu alobi na ye: "Kende, mwana na yo asi'abiki." Moto wana andimi maloba ya Yezu, pe azongi na ndako na ye. 51 Na nzela akutani ná basali na ye; bango bayebisi ye: "Mwana na yo asi'abiki!" 52 Atuni bango: "Tango nini mwana ayokaki malamu?" Bazongiseli ye: "Fièvre esilaki lobi na ngonga ya liboso sima ya midi." 53 Bongo tata ya mwana ayei koyeba 'tè ezalaki nde na tango Yezu alobaki na ye: "Mwana na yo asi'abiki". Yango wana ye ná bato nyonso ya ndako na ye bandimaki Yezu. 54 Oyo ezali likamwisi ya mibale ya Yezu. Asalaki yango tango alongwaki na Yuda po na kozonga na Galilé.

Yoane 5

Yezu abikisi moto akufá makolo

1 Sima na yango, feti moko ya Bayuda ezalaki, bongo Yezu akei na Yeruzalem. 2 Eziba moko ya mai ezalaki kuna penepene ya Porte-ya-Bameme; na monoko ya Bayuda bábengaka yango Bezata; ezalaki na baveranda mitano. 3 Na baveranda yango, bato mingi ya maladi bazalaki kolala wana na se: bato bakufa miso, bato ya tengu-tengu, ná baoyo bakufa makolo. Bazalaki kozela 'tè mai éningana, 4 pamba té tango mosusu anjelu ya Nzambe azalaki koya na eziba po na koningisa mai. Tango mai ekoningana, moto oyo akokota na eziba liboso akobika, ata kutu maladi na ye ezalaki ya ndenge nini. 5 Moto moko azalaki wana aumeli na maladi bambula 38 . 6 Tango Yezu amoni ye, pe lokola ayebaki 'tè aumeli penza na maladi, atuni ye: "Olingi kobika?" 7 Moto wana azongiseli ye: "Tata, nazali na moto té oyo akoki kokitisa ngai na eziba, soki mai eningani. Tango nalingi kokita na mai, moto mosusu asi'akiti kala." 8 Yezu alobi na ye: "Telema, kamata etoko na yo pe tambola." 9 Na mbala moko, moto ya maladi abiki; akamati etoko na ye pe abandi kotambola. Makambo yango esalamaki na Mokolo ya Kopema. 10 Bayuda balobi na moto oyo abikaki: "Lelo ezali Mokolo ya Kopema; okoki komema etoko na yo té." 11 Ye azongisi: "Moto oyo abikisi ngai, alobi na ngai: Kamata etoko na yo pe tambola." 12 Bongo batuni ye: "Nani moto alobaki na yo: Kamata etoko na yo pe tambola?" 13 Kasi moto oyo abikaki ayebaki té soki nani moto abikisaki ye; po Yezu akotaki na kati ya bato bazalaki wana. 14 Sima na yango, Yezu akutani na ye na Ndako ya Nzambe, alobi na ye: "Yoka malamu, sik'oyo obiki; kosala lisusu masumu té, po likambo ya mabe ékweela yo té." 15 Moto wana akei epai ya Bayuda, alobi: "Ezali Yezu moto abikisi ngai." 16 Yango wana Bayuda babandi kotungisa Yezu, po asalaki likambo yango na Mokolo ya Kopema. 17 Kasi Yezu alobi na bango: "Tata na ngai asalaka tango nyonso; ngai pe nasalaka lokola ye." 18 Yango wana Bayuda bakómaki koluka nzela ya koboma Yezu, po abukaki kaka mobeko ya Mokolo ya Kopema té, kasi alobaki lisusu 'tè Nzambe azali Tata na ye penza, lokola nde ye akokani na Nzambe.

Bokonzi ya Mwana ya Nzambe

19 Sik'oyo Yezu azongiseli bango: "Nazali koloba na bino, ya solo: ngai Mwana nasalaka eloko té na makasi na ngai moko, kasi nasalaka makambo oyo namonaka epai ya Tata na ngai. Makambo nyonso oyo Tata asalaka, ngai pe nasalaka yango. 20 Pamba té Tata alingi ngai Mwana na ye, yango wana alakisaka ngai makambo nyonso oyo ye asalaka. Akolakisa ngai pe makambo mosusu eleki oyo na monene, pe bokokamwa po na yango. 21 Ndenge Tata azongisaka na bomoi bato oyo bakufa, se bongo ngai Mwana pe, napesaka bomoi na bato oyo nalingi. 22 Tata akosambisa moto moko té, kasi asi'apesá bokonzi nyonso na maboko na ngai, po násambisa bato. 23 Tata alingi bato nyonso bákumisa ngai Mwana, bobele ndenge bakumisaka ye. Moto oyo akumisaka ngai té, akumisaka pe Tata té, pamba té ye moto atindaki ngai. 24 "Nazali koloba na bino, ya solo: bato nyonso oyo bayokaka maloba na ngai, pe bandimelaka Moto oyo atindaki ngai, bazali na bomoi ya seko. Bakokatela bango etumbu té, kasi basi'balongwe na liwa pe bazwi bomoi ya seko. 25 Nazali koloba na bino, ya solo: tango ezali koya pe esi'ekoki, oyo bato bakufa bakoyoka mongongo na ngai, Mwana ya Nzambe, pe baoyo bakoyoka yango bakozwa bomoi. 26 Pamba té lokola bomoi nyonso ezali na maboko ya Tata, ye atii yango pe na maboko na ngai, Mwana na ye. 27 Apesi ngai bokonzi ya kosambisa bato, pamba té nazali Mwana ya Moto. 28 Bókamwa té, tango ezali koya oyo bato nyonso bakundamá na simetiere bakoyoka mongongo na ngai 29 pe bakobima. Bato oyo basalaki malamu bakosekwa po na kozwa bomoi; kasi baoyo basalaki mabe bakosekwa po na kozwa etumbu."

Bilembo elakisi bokonzi ya Yezu

30 "Ngai nakoki kosala eloko moko té na makasi na ngai. Nakataka makambo ya bato ndenge Nzambe alobaká na ngai. Nakataka yango malamu, po nasalaka té ndenge ngai nalingi, kasi ndenge Oyo atindaki ngai alingi. 31 Soki nazali koloba po na ngai moko, maloba na ngai ezali pamba; 32 kasi moto mosusu nde alobaká po na ngai, pe nayebi 'tè makambo oyo ye alobaká po na ngai ezali ya solo. 33 Bino botindaki bato epai ya Yoane Mobatisi, pe ye alobaki maloba ya solo po na ngai. 34 Ngai nazali koluka bato té po báloba makambo na ngai; kasi nalobi bongo po bino bóbika. 35 Yoane azalaki lokola mwinda oyo ezali kopela pe kongenga; bino bondimaki kosepela na yango mwa tango moke. 36 Kasi misala na ngai eleki maloba Yoane alobaki po na ngai. Misala oyo nasalaka, Tata nde apesi ngai nguya po násala yango; yango elakisi 'tè Tata moto atindi ngai. 37 Tata oyo atindi ngai, ye moko azali koloba po na ngai. Nanu boyoká mongongo na ye té, nanu pe bomoná elongi na ye té. 38 Maloba na ye ekoteli bino té, pamba té boboyi kondimela moto oyo ye atindi. "Botangaka Mikanda ya Nzambe tango nyonso, po bokanisi 'tè bokozwa na yango bomoi ya seko; nzokande yango ezali koyebisa bino makambo na ngai. 40 Kasi bino bolingi koya epai na ngai té po na kozwa bomoi ya seko. 41 "Nalukaka lokumu epai ya bato té. 42 Kasi nayebi bino: bozali na bolingo ya Nzambe té na mitema na bino. 43 Ngai nayei na kombo ya Tata na ngai, pe bino bolingi koyamba ngai té. Kasi soki moto ayei na kombo na ye moko, boyambaka ye. 44 Bino bólingaka kozwa lokumu epai ya baninga na bino, kasi lokumu oyo eutaka bobele na Nzambe, bolukaka yango té. Bongo ndenge nini bokoki kondima? 45 Bókanisa té 'tè ngai nakofunda bino epai ya Tata na ngai; ezali nde Moize moto akofunda bino, po ye azali moto oyo botielaka mitema. 46 Soki bondimelaki Moize ya solo, mbele pe bolingaki kondimela ngai, pamba té Moize akómaká makambo etali ngai. 47 Kasi lokola bozali kondima té makambo ye akómaká, ndenge nini bokoki kondima maloba na ngai?"

Yoane 6

Yezu aleisi bato ebele

1 Sima na yango, Yezu akei na ngambo ya lak ya Galilé (bábengaka yango pe lak ya Tiberiade). 2 Bato ebele bazalaki kolanda ye po bamonaki makamwisi oyo asalaki, pe ndenge abandaki kobikisa bato bazalaki na maladi. 3 Yezu abuti na ngomba pe afandi kuna ná bayekoli na ye. "Feti ya Pake ya Bayuda ekómaki penepene. 5 Yezu átala boye, amoni bato mingi bazali koya epai na ye; alobi na Filipe: "Esika nini tokoki kosombela bato oyo biloko ya kolia?" 6 Alobaki bongo po na komeka ye, pamba té ye moko asi'ayebaki likambo oyo alingaki kosala. 7 Filipe azongiseli ye: "Ata tosombi mapa 2.000, ekokoka té po moto nyonso ália mwa eteni ya lipa." 8 Moyekoli mosusu, kombo na ye André, leki'ya Simon Piere, alobi na Yezu: 9 "Mwana moko atelemi kuna, azali na mapa mitano ná bambisi mibale. Kasi tósala na yango nini po na bato ebele boye?" 10 Yezu alobi na bango: "Bófandisa bato nyonso." Esika wana ezalaki na matiti mingi. Bongo bato nyonso bafandifandi; mibali nyonso bazalaki penepene ya 5.000. 11 Yezu akamati mapa yango, apesi Nzambe mersi, pe akaboli yango na bato oyo bazalaki wana. Akaboleli bango pe mbisi. Moto nyonso azwaki ndenge motema na ye elingi. 12 Tango bato nyonso basilisi kolia, batondi, Yezu alobi na bayekoli na ye: "Bólokota biteni ya mapa oyo etikali, po ébeba té." 13 Balokoti yango, pe batondisi bitunga zomi na mibale na biteni ya mapa oyo etikalaki. 14 Bato oyo bamonaki likamwisi Yezu asalaki, balobi: "Ya solo, ye azali profete oyo tozalaki kozela." 15 Yezu ayebaki 'tè balingi kotia ye mokonzi na makasi; yango wana azongi na likolo ya ngomba ye moko.

Yezu atamboli likolo ya mai

16 Tango pokwa ekómi, bayekoli bakei penepene ya lak. 17 Bakoti na bwatu moko, pe babandi kokatisa ngambo ya Kafarnaum. Butu esi'eyaki, kasi Yezu nanu akómaki epai na bango té. 18 Mai ezalaki koningana mingi, po mopepe ezalaki makasi. 19 Tango bakomi pembeni ya mokili, bamoni Yezu azali koya epai ya bwatu pe kotambola likolo ya mai; babangaki mingi. 20 Kasi Yezu alobi na bango: "Ezali ngai, bóbanga té." 21 Balingaki kokotisa ye na bwatu, kasi kaka na tango wana bwatu ekómi na libongo esika bazalaki kokende.

Bato baluki Yezu

22 Na tongo ya mokolo elandi, bato oyo batikalaki na ngambo ya lak, bayei kokanisa 'tè bwatu moko kaka ezalaki wana, pe Yezu akotaki na yango té; pamba té bayekoli bakendeki bango moko. 23 Nzokande babwatu mosusu elongwaki na Tiberiade eyei kotelema na esika Nkolo Yezu apesaki Nzambe mersi pe aleisaki bato. 24 Awa bato bamoni 'tè Yezu ná bayekoli na ye bazali té, bakoti na babwatu wana pe bakei na Kafarnaum po na koluka ye.

Yezu azali bilei oyo epesaka bomoi

25 Bakuti Yezu na ngambo ya lak, bongo batuni ye: "Moteyi, oyaki awa tango nini?" 26 Yezu azongiseli bango: "Nazali koloba na bino, ya solo: bozali koluka ngai kaka po boliaki pe botondaki mingi; kasi ezali té po bomonaki mosala oyo euti na Nzambe. 27 Bótika kosala bobele po na bilei oyo ebebaka, kasi bósala po na bilei oyo eumelaka, pe epesaka bomoi ya seko. Bilei wana, ngai Mwana ya Moto nakopesa bino yango, pamba té Nzambe Tata alakisi polele 'tè atindi ngai." "Bato batuni ye: "Tósala nini po na kokokisa misala oyo Nzambe alingaka?" 29 Yezu azongiseli bango: "Mosala Nzambe alingaka, yang'oyo: Bóndima moto oyo ye atindaki." 30 Bato batuni ye lisusu: "Ndenge nini okoki kolakisa 'tè Nzambe moto atindi yo, po tóndimela yo? Likambo nini okoki kosala? 31 Bakoko na biso baliaka bilei oyo bábengaka mane, tango bazalaká na esobe. Ekómamá boye: 'Apesaki bango bilei oyo euti na Likolo.' " 32 Yezu azongiseli bango: "Nazali koloba na bino, ya solo: Ezali Moize té moto apesaká bino bilei oyo eutaki na Likolo; kasi Tata na ngai azali kopesa bino bilei ya solo, oyo euti na Likolo. 33 Pamba té bilei oyo Nzambe azali kopesa bino elongwe na Likolo; yango nde moto ezali kopesa bato bomoi." 34 Bato balobi na ye: "Mokonzi, pesaka biso bilei yango mikolo nyonso." 35 Yezu azongiseli bango: "Ngai nazali bilei oyo epesaka bomoi. Moto oyo akoya epai na ngai akoyoka lisusu nzala té, pe oyo akondima ngai, akoyoka lisusu posa ya mai ata mokolo moko té. 36 Kasi nalobi na bino: ata bomoni ngai, bozali kondima ngai té. 37 Moto nyonso Tata akopesa ngai, akoya epai na ngai. Soki ayei epai na ngai, nakobengana ye té; 38 pamba té, ngai nauti na Likolo pe nayei awa na mokili po na kosala makambo na ngai moko té, kasi po na kokokisa makambo ya Moto oyo atindaki ngai. 39 Moto oyo atindaki ngai alingi 'tè: nábungisa ata moko té na kati ya bato nyonso oyo apesi ngai, kasi násekwisa bango na mokolo ya suka. 40 Pamba té Tata na ngai alingi boye: moto nyonso oyo akomona ngai Mwana pe akondima ngai, ázwa bomoi ya seko; bongo ngai nakosekwisa ye na mokolo ya suka." 41 Bayuda basilikaki po Yezu alobaki: "Nazali bilei oyo euti na Likolo." 42 Bongo balobi: "Boni, oyo Yezu té, mwana ya Jozef? Biso toyebi tata na ye ná mama na ye. Ndenge nini azali koloba 'tè auti na Likolo?" 43 Yezu alobi na bango: "Bótika kosilika. 44 Moto moko té akoki koya epai na ngai, soki Tata oyo atindaki ngai amemi ye té, bongo ngai nakosekwisa ye na mokolo ya suka. 45 Baprofete bakómaká boye: 'Nzambe akoteya bato nyonso.' Moto nyonso oyo ayokelaka Tata pe andimaka mateya na ye, akoya epai na ngai. 46 Moto moko té nanu amoná Tata; kaka ngai moto nauti epai ya Nzambe, nasi'namoná Tata. 47 "Nazali koloba na bino, ya solo: moto oyo andimaka ngai, azali na bomoi ya seko. 48 Ngai nazali bilei oyo epesaka bomoi. 49 Bakoko na bino tango bazalaká na esobe, baliaka bilei oyo bábengaka mane; ata bongo bakufaká kaka. 50 Kasi bilei oyo euti na Likolo, soki moto alei yango akokufa té. 51 Ngai nazali bilei ya bomoi oyo euti na Likolo. Soki moto alei yango, akozala na bomoi ya seko. Bilei oyo ngai nakopesa na bato, ezali nzoto na ngai; nakopesa yango po bato bázwa bomoi." 52 Awa alobi boye, Bayuda babandi kotunana: "Ndenge nini moto oyo akopesa biso nzoto na ye po tólia yango?" 53 Yezu azongiseli bango: "Ngai Mwana ya Moto nazali koloba na bino, ya solo: soki bolei nzoto na ngai té pe soki bomeli makila na ngai té, bokozwa bomoi ya seko té. 54 Moto oyo aliaka nzoto na ngai pe amelaka makila na ngai, azali na bomoi ya seko; pe ngai nakosekwisa ye na mokolo ya suka. 55 Nazali kopesa nzoto na ngai po bato bália yango solo; pe nazali kopesa makila na ngai po bato bámela yango solo. 56 Moto oyo aliaka nzoto na ngai pe amelaka makila na ngai, biso ná ye tozali moto moko. 57 Tata oyo atindaki ngai azali na bomoi; ngai pe nazali na bomoi po na ye; moto oyo aliaka nzoto na ngai, akozala pe na bomoi po na ngai. 58 Ngai nazali bilei euti na Likolo, nazali té lokola bilei oyo bakoko na bino baliaka; pamba té bakufaká kaka. Kasi moto aliaka bilei oyo, akozala na bomoi ya seko." 59 Oyo ezali mateya Yezu ateyaki na ndako ya losambo, na Kafarnaum.

Maloba oyo epesaka bomoi ya seko

60 Awa bayoki maloba ya Yezu, bayekoli na ye mingi balobi: "Mateya oyo ezali makasi po na kondima. Nani akoki kondima yango?" 61 Yezu ayebaki 'tè bayekoli na ye basepelaki té po na yango, bongo atuni bango: "Makambo oyo esali bino pasi na mitema? 62 Bokoloba nini soki bomoni ngai, Mwana ya Moto, nazali kobuta na esika oyo nazalaká liboso? 63 Ezali Molimo

Yoane 6 . 45 Ezaya 54 , 13 .

moto apesaká bomoi, kasi makasi ya bomoto ezali pamba. Maloba nauti koloba etondá na nguya ya Molimo oyo apesaká bomoi. 64 Kasi bato mosusu na kati na bino bazali kondima ngai té." Yezu alobaki ndenge wana pamba té, ayebaki banda kala banani bazalaki kondimela ye té; ayebaki pe nani akoteka ye; 65 bongo abakisi boye: "Yango wana nayebisi bino 'tè moto moko té akoki koya epai na ngai, soki Tata apesi ye nzela té." 66 Banda mokolo wana bayekoli na ye mingi balongwaki, pe balandaki ye lisusu té. 67 Bongo Yezu atuni bayekoli zomi na mibale: "Bino pe bolingi kokende?" 68 Simon Piere azongiseli ye: "Mokonzi, tokokende epai ya nani? Yo ozali na maloba oyo epesaka bomoi ya seko. 69 Sik'oyo tondimi, toyebi 'tè ozali Mosantu oyo Nzambe aponá." 70 Yezu alobi na bango: "Ngai moto naponaki bino nyonso zomi na mibale. Kasi moto moko na kati na bino azali moto ya zabolo." 71 Yezu alobaki bongo po na Yudas, mwana ya Simon Iskariot, pamba té ezali ye nde moto akoteka Yezu, atako azalaki na kati ya bayekoli zomi na mibale.

Yoane 7

Bandeko ya Yezu bandimeli ye té

7 Sima na yango, Yezu azalaki kotambola na Galilé mobimba. Alingaki lisusu kotambola na région ya Yuda té, po Bayuda bazalaki koluka koboma ye. 2 Feti ya "Bandako-ya-kapo" ekómaki penepene. 3 Bandeko ya Yezu balobi na ye: "Kende na région ya Yuda, po bayekoli na yo bámona misala oyo yo ozali kosala. 4 Moto moko té abombaka misala na ye, soki alingi bato nyonso báyeba ye. Lokola ozali kosala misala minene boye, sala yango na miso ya bato nyonso." 5 Ata bandeko ya Yezu pe bazalaki kondima ye té. 6 Kasi Yezu alobi na bango: "Tango na ngai ekoki nanu té; kasi po na bino tango nyonso ezali malamu. 7 Bato ya mokili bakoki koyina bino té, kasi bazali koyina nde ngai, po nazali kolakisa 'tè makambo bazali kosala ezali mabe. 8 Bókende na bino na feti; kasi ngai nakokende té, po tango na ngai ekoki nanu té." 9 Sima ya koloba bongo, atikali na ye na Galilé.

Yezu akei na feti

10 Tango bandeko ya Yezu basi'bakei na feti, ye pe alandi na kobombama; amimonisaki na miso ya bato té. 11 Bayuda babandaki koluka ye na tango ya feti, pe batunani: "Azali wapi?" 12 Bato bazalaki koloba mingi po na ye, kasi malembe. Bamosusu balobi: "Azali moto malamu"; nzokande bamosusu balobi: "Té, azali kokosa bato." 13 Kasi ata moto moko té amekaki koloba polele po na ye, pamba té bazalaki kobanga bakonzi ya Bayuda. 14 Tango bakómaki na katikati ya mikolo ya feti, Yezu akoti na Ndako ya Nzambe, pe abandi koteya. 15 Bayuda bakamwaki mingi, pe batunani: "Ndenge nini moto oyo ayebi makambo ebele boye? Ye akotá ata kelasi té." 16 Yezu alobi na bango: "Makambo oyo nazali koteya bino, ezali ya ngai moko té, kasi euti na Moto oyo atindi ngai. 17 Moto nyonso oyo azali na posa ya kosala makambo Nzambe alingi, ye nde akoyeba soki mateya na ngai euti na Nzambe, to na ngai moko. 18 Moto oyo alobaká makambo euti na ye moko, alukaka lokumu na ye moko. Kasi oyo alukaka bobele lokumu ya moto oyo atindi ye, ye azali moto ya solo, alobaká lokuta ata moke té. 19 Moize apesaká bino Mibeko, kasi ata moto moko té na kati na bino atosaka yango. Po na nini bozali koluka koboma ngai?" 20 Bato bazongiseli ye: "Ozali na ndoki! Nani moto azali koluka koboma yo?" 21 Yezu alobi na bango: "Kaka po na mosala moko nasalaki na Mokolo ya Kopema, bino nyonso bokamwe! 22 Kasi bino moko bokataka bana mibali ata na Mokolo ya Kopema, po Moize atindá bákataka bango sima ya mikolo mwambe ya kobotama; nzokande ezali Moize té moto abandaki kokata bana, kasi ezali bakoko. "Bakataka bana ata na Mokolo ya Kopema, po na kotosa Mibeko ya Moize; bongo po na nini bozali kosilika na ngai, awa nabikisi moto na Mokolo ya Kopema? 24 Bótika kotalaka makambo na ndenge bino bozali komona na miso. Kasi bótalaka makambo na ndenge ya solo."

Yezu azali solo Mesia

25 Bato mosusu ya Yeruzalem bazalaki kotunana: "Oyo ye té moto bazali koluka koboma? "Tala azali koloba na miso ya bato nyonso, kasi balobi na ye ata eloko moko té! Yango bakonzi na biso basi'bandimi 'tè ye azali ya solo penza Mesia? 27 Kasi tango Mesia akoya, moto moko té akoyeba soki auti wapi; nzokande moto oyo, toyebi epai auti." 28 Tango Yezu azalaki koteya na Ndako ya Nzambe, atuni bato na mongongo makasi: "Boyebi ngai ya solo? Pe boyebi epai nautaki? Nayaki na kombo na ngai moko té, kasi Moto oyo atindaki ngai azali solo. Bino boyebi ye té. 29 Ngai nayebi ye malamu, po nauti epai na ye; ye moto atindi ngai." 30 Balukaki nzela ya kokanga Yezu; kasi ata moto moko té amekaki kosimba ye, po tango na ye ekokaki nanu té. 31 Na kati ya bato wana, mingi bandimaki Yezu; bazalaki kotunana: "Boni, tango Mesia akoya, akosala makamwisi mingi koleka ya moto oyo?"

Batindi bakengeli po bákanga Yezu

32 Ba-Farizé bayokaki makambo nyonso oyo bato bazalaki koloba malembe po na Yezu. Bakonzi ya banganga-Nzambe ná ba-Farizé batindaki bakengeli ya Ndako ya Nzambe po bákende kokanga ye. 33 Yezu alobi na bato: "Nakotikala na bino mwa tango moke, bongo nakozonga epai ya Moto oyo atindaki ngai. 34 Bokobanda koluka ngai, kasi bokomona ngai té, po bokoki kokende té na esika oyo ngai nakozala." 35 Bayuda, awa bayoki boye, babandi kotunana bango na bango: "Boni, akokende wapi po tómona ye lisusu té? Akokende nde epai ya Bayuda oyo bapanzaná na bikolo mosusu, pe akoteya bato ya bikolo mosusu? 36 Alobi 'tè tokobanda koluka ye kasi tokomona ye té, po tokoki kokende té na esika oyo ye akozala. Makambo yango elingi kolakisa nini?"

Mai oyo epesaka bomoi

37-38 Mokolo ya suka ya feti ezalaki mokolo oyo eleki monene. Yezu atelemi na kati ya bato, abandi koloba na bango na mongongo makasi: "Moto oyo azali na posa ya mai, pe andimeli ngai, áya komela mai epai na ngai. Bakómá na Mikanda ya Nzambe: 'Mai ya bomoi ekobanda kobima na motema na ye lokola ebale.' " 39 Yezu azalaki koloba bongo po na Molimo ya Nzambe oyo bato bakondima ye bakozwa. Na tango wana, Molimo ayaki nanu té, po Yezu azwaki nanu lokumu na ye té.

Bato bakábwani likolo ya Yezu

40 Na kati ya bato oyo bayokaki maloba ya Yezu, bamosusu balobi: "Ya solo, ye azali Profete oyo tozalaki kozela"; 41 bamosusu: "Azali Mesia." Kasi bato mosusu balobi boye: "Mesia akoki nde kouta na Galilé? 42 Ekómamá na Mikanda 'tè Mesia akozala moto ya libota ya David, pe akouta na Betleem, mboka ya David." 43 Boye bato bayei kokabwana likolo ya Yezu. 44 Na kati ya baoyo bazalaki na posa ya kokanga ye, ata moto moko té amekaki kosimba ye.

Bakonzi ya Bayuda bandimeli Yezu té

45 Tango bakengeli bazongi, bakonzi ya banganga-Nzambe ná ba-Farizé batuni bango: "Po na nini boyei na ye té?" 46 Bakengeli bazongisi: "Nanu moto moko té asi'alobá lokola moto yango." 47 Ba-Farizé batuni bango: "Bino pe bondimi lokuta na ye? 48 Na kati ya bakonzi to ya ba-Farizé ezali na moto moko oyo andimeli ye? 49 Kasi bato pamba wana oyo bayebi Mibeko ya Moize té, Nzambe asi'asundolá bango kala." 50 Nikodeme pe azalaki na kati ya ba-Farizé wana; mokolo moko ye akendeki kotala Yezu. Alobi na banga 51 "Na Mibeko na biso, tokoki kokatela moto etumbu té, soki nanu toyoki ye té po tóyeba likambo ye asali." 52 Bazongiseli ye: "Yo pe ozali moto ya Galilé? Kende kotanga Mikanda ya Nzambe, pe okomona 'tè ata profete moko té asi'autá na Galilé." 53 Sima na yango, bato nyonso bapanzani, pe moto na moto azongi na ndako na ye.

Yoane 8

Yezu ná mwasi moko ya ndumba

1 Yezu akei na Ngomba ya ba-Olive. 2 Tongo etani, azongi na Ndako ya Nzambe, pe bato nyonso bayei penepene na ye. Ye afandi pe abandi koteya bango. 3 Balakisi-Mibeko ná ba-Farizé bamemeli ye mwasi moko oyo bakangaki ná mobali ya bato. Batii ye liboso ya bato nyonso, 4 bongo balobi na Yezu: "Moteyi, tokangi mwasi oyo ná mobali ya bato. 5 Mibeko ya Moize ezali kotinda 'tè tóboma basi ya ndenge oyo na mabanga. Kasi yo olobi nini?" 6 Balobaki bongo po bámeka ye, bongo bázwa nzela ya kofunda ye. Kasi Yezu agunzami na se, pe abandi kokóma mosapi na mabelé. 7 Awa bazalaki kaka kotunatuna ye, Yezu atali bango pe alobi: "Na kati na bino, moto oyo nanu asalá lisumu moko té, ábwakela ye libanga ya liboso." 8 Bongo agunzami lisusu, pe abandi kokóma na mabelé. 9 Tango bayoki bongo, bakomi kokende moko moko, mibange liboso; kaka Yezu moto atikalaki wana, ye ná mwasi yango. 10 Bongo Yezu atali ye, pe alobi: "Mama, wapi bango? Ata moto moko té akateli yo etumbu?" 11 Ye azongisi: "Moteyi, ata moto moko té." Bongo Yezu alobi na ye: "Ngai pe nakokatela yo etumbu té. Kende na yo, kasi kosala lisusu masumu té."

Yezu azali moi po na bato

12 Yezu alobi lisusu na bato: "Ngai nazali lokola moi po na bato. Moto oyo alandi ngai, akotambola na molili ata moke té, kasi akobanda kotambola na moi, bongo akozwa bomoi ya solo." 13 Ba-Farizé balobi na ye: "Ozali koloba po na yo moko; maloba na yo ezali ya pamba." 14 Yezu azongiseli bango: "Ata nazali koloba po na ngai moko, maloba na ngai ezali ya solo; pamba té nayebi epai nauti pe epai nakokende. Kasi bino boyebi té epai ngai nauti pe epai nakokende. 15 Bino bokataka makambo na ndenge ya bomoto, kasi ngai nakataka likambo ya moto té. 16 Soki nakati likambo ya moto, nakati yango malamu, po nazalaka ngai moko té, kasi tozalaka biso ná Tata oyo atindi ngai. 17 Na Mibeko na bino ekómamá 'tè soki bato mibale bazali koloba ndenge moko, likambo wana ezali ya solo. 18 Ngai nazali koloba po na ngai moko. Pe Tata oyo atindi ngai azali koloba po na ngai." 19 Bango batuni ye: "Tata na yo azali wapi?" Yezu azongiseli bango: "Bino boyebi ngai té, pe boyebi Tata na ngai té. Soki boyebaki ngai, mbele bolingaki koyeba pe Tata na ngai." 20 Yezu alobaki makambo wana tango azalaki koteya bato na Ndako ya Nzambe, na esika bazalaki kotia makabo. Ata moto moko te akangaki ye, po tango na ye ekokaki nanu té.

"Bino bokoki kokende té epai ngai nakokende"

21 Yezu alobi na bango lisusu: "Ngai nakokende, bongo bokoluka ngai; kasi bokokufa na masumu na bino. Bokoki kokende té epai ngai nakokende." 22 Bayuda batunani bango na bango: "Boni? Akokende komiboma? Po alobi: Bino bokoki kokende té epai nakokende." 23 Yezu alobi na bango: "Bino bozali bato ya se, kasi ngai nauti na Likolo. Bino bozali bato ya mokili oyo, kasi ngai nazali moto ya mokili oyo té. 24 Yango wana nalobi na bino 'tè bokokufa na masumu na bino. Soki boboyi kondima 'tè Ngai Nazali, bokokufa na masumu na bino." 25 Bango batuni ye: "Yo ozali nani?" Yezu azongiseli bango: "Ngai nazali oyo nalobaki na bino uta na ebandeli. "Nazali na makambo mingi ya koloba po na bino, pe ya kosambisa bino. Kasi Moto oyo atindaki ngai azali moto ya solo; makambo oyo nalobaka na bato, nayokaki yango epai na ye." 27 Kasi bango bayebaki té 'tè Yezu azalaki kolobela bango po na Tata. "Bongo Yezu alobi na bango lisusu: "Tango bokotombola ngai Mwana ya Moto, bokoyeba 'tè Ngai Nazali; bongo bokoyeba 'tè nasalaka eloko moko té na mayele na ngai moko, kasi nalobaka se makambo oyo Tata alakisaki ngai. 29 Moto oyo atindaki ngai, azali na ngai, atiki ngai té; pamba té tango nyonso nasalaka makambo oyo ye alingaka." 30 Tango Yezu alobaki bongo, bato mingi bandimaki ye.

Baumbu ná bato ya bonsomi

31 Yezu alobi na Bayuda oyo bazalaki kondima ye: "Soki bobandi kotosa maloba na ngai, bokozala penza bayekoli na ngai. 32 Bokoyeba makambo Nzambe azali kolakisa bino, pe yango ekokómisa bino bato ya bonsomi." 33 Bazongiseli ye: "Tozali bato ya libota ya Abraham; nanu tokómá baumbu ya moto té. Ndenge nini olobi na biso: 'Bokokóma bato ya bonsomi'? " 34 Yezu alobi na bango: "Nazali koloba na bino, ya solo: moto nyonso oyo asalaka masumu azali moumbu ya masumu. 35 Moumbu atikalaka seko moto ya libota té, kasi mwana azali moto ya libota seko. 36 Soki ngai Mwana ya Nzambe nalongoli bino na boumbu, bokozala penza na bonsomi ya solo. 37 Nayebi 'tè bozali bana ya Abraham; kasi bozali koluka boboma ngai, po bondimaka maloba na ngai té. 38 Ngai nalobaka makambo oyo Tata na ngai alakisaki ngai, kasi bino bosalaka makambo oyo boyokaki epai ya tata na bino." 39 Bango bazongiseli ye: "Tata na biso ezali Abraham." Kasi Yezu alobi na bango: "Soki bozali bana ya Abraham, bosalaka ndenge ye azalaká kosala. 40 Kasi bozali kaka koluka boboma ngai; nzokande nalobi na bino bobele makambo ya solo oyo nayokaki epai ya Nzambe. Abraham atikalaka kosala ndenge wana ata moke té. 41 Bino bosalaka makambo oyo tata na bino asalaka." Bango bazongiseli ye: "Babo-taki biso na kindumba té; tozali bana ya Tata se moko, ye nde Nzambe." 42 Yezu alobi na bango: "Soki Nzambe azalaki Tata na bino, mbele bólingaka ngai, pamba té nauti epai ya Nzambe, nayei na kombo na ye. Nayaki na mayele na ngai moko té, kasi ezali ye nde moto atindaki ngai. 43 Po na nini bozali koyeba tina ya maloba na ngai té? Ezali kaka po bokoki kondima yango té. 44 Bozali bana ya zabolo, pe bolukaka kosala bobele makambo oyo tata na bino alingaka. Uta ebandeli ye azalaká kaka mobomi, pe aboya makambo ya Nzambe; makambo ya solo ezali na ye té. Tango akosaka, lokuta wana eutaka na motema na ye; pamba té azali moto ya lokuta pe tata na yango. 45 Kasi ngai nalobaka na bino makambo euti na Nzambe, yango wana bondimelaka ngai té. 46 Nani na kati na bino akoki kotangela ngai lisumu oyo nasi'nasali? Soki nazali koloba makambo ya solo, po na nini bolingi kondimela ngai té? 47 Moto oyo azali mwana ya Nzambe ayokaka maloba ya Nzambe; kasi bino bozali koyoka yango té, po bozali bana na ye té."

Yezu ná Abraham

48 Bayuda balobi na Yezu: "Omoni, tolobaki ya solo té? Ozali moto ya Samarie, pe ozali na ndoki!" 49 Yezu azongiseli bango: "Nazali na ndoki té. Nakumisaka Tata na ngai, kasi bino bokumisaka ngai té. 50 Ngai nalukaka lokumu na ngai moko té, kasi Nzambe azali kolukela ngai yango. Ye nde moto akokata likambo. 51 Nazali koloba na bino, ya solo: moto oyo azali kotosa maloba na ngai, akokufa té." 52 Bayuda balobi na ye: "Sik'oyo tomoni penza 'tè ozali na ndoki! Abraham akufá; baprofete bakufa; kasi yo olobi: Soki moto atosi maloba na ngai akokufa té, kasi akozwa bomoi ya seko. 53 Tata na biso Abraham asi'akufá; yo okanisi 'tè oleki ye? Baprofete pe basi'bakufá. Bongo yo okanisi penza 'tè ozali nani?" 54 Yezu azongisi: "Soki namikumisi, lokumu na ngai ezali pamba. Kasi Tata na ngai azali kokumisa ngai. Bino bolobaka 'tè: 'Azali Nzambe na biso'; 55 nzokande boyebi ye té. Ngai nayebi ye; pe soki nalobi 'tè nayebi ye té, nakómi moto ya lokuta lokola bino. Ya solo, nayebi ye, pe natosaka maloba na ye. 56 Tata na bino Abraham atondaki na esengo po ayebaki 'tè akomona ngai, mokolo nakoya na mokili; amonaki yango, pe asepelaki mingi." 57 Bayuda batuni ye: "Yo okokisi kutu ata mbula 50 té, bongo ozali koloba 'tè omonaká Abraham?" 58 Yezu azongiseli bango: "Nazali koloba na bino, ya solo: liboso 'tè Abraham ábotama, Ngai Nazali." 59 Tango Bayuda bayoki boye, balokoti mabanga po bábamba ye; kasi Yezu amibendi pe abimi na Ndako ya Nzambe.

Yoane 9

Yezu abikisi moto abotamá na miso ya kokufa

1 Tango Yezu azalaki koleka na nzela, amoni moto moko akufá miso banda babotá ye. 2 Bayekoli na ye batuni ye: "Moteyi, po na nini moto oyo abotamá na miso ya kokufa? Ezali po na masumu na ye moko to ya baboti na ye?" 3 Yezu azongisi: "Ezali po na masumu na ye moko té to ya baboti na ye; kasi abotamá na miso ya kokufa, po mosala ya Nzambe émonana na ye. 4-5 Tango ngai nazali awa na mokili, nazali moi po na bato. Lokola moi ezali nanu, esengeli násala misala ya Moto oyo atindaki ngai. Butu ezali koya, pe moto moko té akokoka lisusu kosala." 6 Sima ya maloba yango, Yezu abwaki soi na mabelé, asali mwa ndambo ya potopoto, pe apakoli moto wana na miso. 7 Bongo alobi na ye: "Kende kosukola elongi na eziba ya Siloé" (kombo wana elingi koloba: Atindami). Moto yango akei kosukola elongi, bongo tango azongi, abandi komona. 8 Bato oyo bazalaki kofanda ná ye penepene, pe baoyo bamonaki ye tango azalaki kosenga mbongo, batunani: "Oyo ye té, moto azalaki kofanda pe kosenga bato mbongo?" 9 Bato mosusu balobi: "Ezali ye." Bamosusu balobi: "Té; kasi akokani na ye." Bongo ye moko alobi: "Ezali ngai." 10 Batuni ye lisusu: "Ndenge nini sik'oyo okómi komona?" 11 Azongiseli bango: "Moto oyo bábengaka Yezu asalaki mwa ndambo ya potopoto, apakoli ngai na miso pe alobi: 'Kende kosukola elongi na Siloé.' Tango nakei kosukola elongi kuna, nabandi komona." 12 Batuni ye: "Moto yango azali wapi?" Ye azongisi: "Nayebi té."

Ba-Farizé batuni moto oyo abiki

13 Bamemi moto oyo azalaki na miso ya kokufa epai ya ba-Farizé. 14 Nzokande Yezu asalaki potopoto pe abikisaki moto yango na Mokolo ya Kopema. 15 Yango wana ba-Farizé batuni ye ndenge nini abandaki komona. Azongiseli bango: "Atiaki ngai mwa ndambo ya potopoto na miso, nasukoli elongi, pe nabandi komona." 16 Bongo ba-Farizé mosusu balobi: "Moto asali makambo ya ndenge oyo, azali moto ya Nzambe té, pamba té abuki mobeko ya Mokolo ya Kopema." Kasi bamosusu balobi: "Ndenge nini moto ya masumu akoki kosala makamwisi minene boye?" Yango wana bakabwanaki bango na bango. 17 Ba-Farizé batuni ye lisusu: "Yo okanisi nini po na moto oyo abikisi yo?" Azongiseli bango: "Azali profete." 18 Bakonzi ya Bayuda bandimaki té 'tè azalaki na miso ya kokufa pe abandi komona, bongo babengisi baboti na ye. "Batuni bango: "Oyo mwana na bino bolobaka 'tè abotamá na miso ya kokufa? Ndenge nini sik'oyo abandi komona?" 20 Baboti na ye bazongisi: "Toyebi 'tè azali mwana na biso, pe abotamá na miso ya kokufa. 21 Kasi toyebi té ndenge nini abandi komona, pe nani moto abikisi ye. Bótuna ye; azali mokolo, akoloba na bino ye moko." 22 Baboti na ye balobaki bongo po bazalaki kobanga bakonzi; pamba té bango bayokanaki boye: moto akondima 'tè Yezu azali Mesia, bako-bengana ye na ndako ya losambo. "Yango wana baboti na ye balobaki: "Azali mokolo, bótuna ye." 24 Ba-Farizé babengi lisusu moto oyo azalaki na miso ya kokufa, balobi na ye: "Biso toyebi 'tè moto yango azali moto ya masumu. Ye atsiolaki Nzambe; kasi yo, kumisa Nzambe." 25 Moto wana azongiseli bango: "Nayebi té soki ye azali moto ya masumu. Kasi nayebi kaka likambo moko: nazalaki na miso ya kokufa, pe sik'oyo nazali komona." 26 Bango batuni ye: "Asalaki yo nini? Ndenge nini abikisi yo?" 27 Ye azongisi: "Nasi'nayebisaki bino, kasi boyokelaki ngai té. Po na nini bolingi koyoka yango lisusu? Bino pe bolingi kokóma bayekoli na ye?" 28 Bafingi ye balobi: "Yo moto ozali moyekoli na ye; kasi biso tozali bayekoli ya Moize. 29 Biso toyebi 'tè Nzambe alobaki na Moize; kasi moto oyo, toyebi té soki auti wapi." 30 Moto wana azongiseli bango: "Oyo ezali penza likambo ya kokamwa! Bino boyebi epai ye auti té, kasi ye abikisi ngai! 31 Toyebi 'tè Nzambe ayokelaka bato ya masumu té, kasi ayokelaka bobele moto oyo atosaka ye pe asalaka makambo ye alingaka. 32 Toyoká nanu té 'tè babikisi moto abotamá na miso ya kokufa. 33 Soki moto yango auti epai ya Nzambe té, akoki kosala ata eloko moko té." 34 Bango bazongiseli ye: "Yo moto obotamá penza na masumu, pe olingi koteya biso?" Bongo babengani ye na ndako ya losambo.

Banani bakufa penza miso?

35 Yezu ayoki 'tè babengani moto wana. Akei kokutana na ye, pe atuni ye: "Ondimi Mwana ya Moto na motema na yo?" 36 Moto wana azongiseli ye: "Mokonzi, yebisa ngai, ye azali nani po 'tè nándima ye." 37 Yezu alobi: "Omoni ye; ezali ngai moto nazali kosolola na yo." 38 Moto wana azongisi: "Mokonzi, nandimi." Bongo afukameli ye. 39 Sima, Yezu alobi: "Ngai nayaki awa na mokili po 'tè moto na moto ázwa oyo ekoki na ye: bato bakufa miso bamona, pe baoyo bazali komona, miso na bango ékufa." 40 Ba-Farizé mosusu oyo bazalaki wana bayoki maloba yango pe batuni ye: "Boni, biso pe tozali na miso ya kokufa?" 41 Yezu azongiseli bango: "Soki bozalaki na miso ya kokufa, mbele bozalaki na masumu té; kasi awa bolobi 'tozali komona', bozali kaka bato ya masumu libela."

Yoane 10

Lisapo ya mobokoli ya bameme

1 Bongo Yezu alobi lisusu: "Nazali koloba na bino, ya solo: soki moto akoti na lopango ya bameme na porte na yango té, kasi na esika mosusu, ye azali moyibi pe mobebisi. 2 Kasi moto oyo akotaka na porte, ye azali mobokoli ya bameme. 3 Sinzili afungolelaka ye lopango, pe bameme eyokaka mongongo na ye. Ye abengaka bameme na ye moko moko na kombo na yango, pe abimisaka yango na libanda. 4 Soki abimisi yango nyonso alekaka na liboso, pe bameme elandaka ye, po eyebi mongongo na ye. 5 Kasi elandaka mopaya té; kutu ekimaka ye, po eyebi mongongo na ye té." 6 Yezu alobaki na bango lisapo oyo, kasi bayebaki tina ya maloba na ye té.

Yezu azali mobokoli malamu ya bameme

7 Yezu alobi lisusu: "Nazali koloba na bino, ya solo: ngai nazali lokola porte ya lopango ya bameme. 8 Bato nyonso oyo bayaki liboso na ngai bazalaki miyibi pe babebisi; yango wana bameme ezalaki koyokela bango té. 9 Ngai nazali porte ya lopango. Moto oyo akotaka epai na ngai, akobika; akoki kokota pe kobima, pe akozwa bilei. 10 Moyibi ayaka kaka po na koyiba, koboma pe kobebisa. Kasi ngai nayei po bato bazala na bomoi, pe bazala na yango mingi koleka. 11 "Ngai nazali mobokoli malamu ya bameme. Mobokoli malamu apesaká bomoi na ye po na bameme na ye. 12 Moto oyo asalaka po na mbongo azali mobokoli penza té, azali pe kolo ya bameme té. Soki amoni nkoi ezali koya, atikaka bameme pe akimaka, bongo nkoi ekangaka bameme pe epanzaka yango. 13 Pamba té, ye asalaka po na mbongo, pe ayokelaka bameme mawa té. 14 Ngai nazali mobokoli malamu. Nayebi bameme na ngai pe yango eyebi ngai, 15 bobele ndenge Tata ayebi ngai pe ngai nayebi ye. Nakopesa bomoi na ngai po na bameme na ngai. 16 "Nazali pe na bameme mosusu, ezali ya lopango oyo té; esengeli nátambwisa yango pe, bongo ekobanda koyoka mongongo na ngai. Boye bameme nyonso ekozala esika moko, na maboko ya mobokoli se moko. 17 "Tata alingi ngai, po nakopesa bomoi na ngai pe nakozwa yango lisusu. 18 Moto moko té akobotola bomoi na ngai, kasi ngai moko nde moto nakopesa yango na bolingo na ngai. Nazali na nguya ya kopesa yango, pe ya kozwa yango lisusu. Tata atindaki ngai násala ndenge wana." 19 Bayuda bakábwani lisusu po na maloba yango. 20 Bato mingi na kati na bango balobi: "Azali na ndoki! Azali na liboma! Po na nini bozali koyoka ye?" 21 Kasi bato mosusu balobi: "Moto azali na ndoki alobaká ndenge wana té. Yango molimo mabe ekoki kobikisa bato bakufa miso?"

Bayuda baboyi Yezu

22 Na mikolo wana feti ezalaki na Yeruzalem, babandaki kokanisa mokolo bafungolaká Ndako ya Nzambe. Na tango wana malili ezalaki mingi. 23 Yezu azalaki kotambola na Ndako ya Nzambe, na véranda ya Salomon. 24 Bongo Bayuda bayei kozinga ye, pe batuni ye boye: "Tango nini okokitisa biso mitema? Yebisa biso polele soki ozali Mesia." 25 Yezu azongiseli bango: "Nasi'naye-bisaki bino yango, kasi bondimelaki ngai té. Misala oyo nazali kosala na nguya ya Tata na ngai, nde ezali kolakisa bino yango. 26 Kasi bino bozali kondima té po bozali bameme na ngai té. 27 Bameme na ngai eyokaka mongongo na ngai; nayebi yango pe yango elandaka ngai. "Napesi yango bomoi ya seko; bongo yango ekobeba ata mokolo moko té. Moto moko té akoki kobotola yango na maboko na ngai, 29 pamba té ezali Tata na ngai moto apesi ngai yango. Ye azali na nguya nyonso, boye moto moko té akoki kobotola eloko na maboko na ye. 30 Ngai ná Tata na ngai tozali se moto moko." 31 Bayuda balokoti lisusu mabanga po na koboma ye. 32 Yezu alobi na bango: "Nasali misala mingi ya malamu na miso na bino, na makasi ya Tata. Po na mosala nini bolingi koboma ngai?" 33 Bayuda bazongiseli ye: "Tolingi koboma yo po na mosala ya malamu té, kasi po ozali kotsiola Nzambe. Pamba té ozali kaka moto, kasi olobi 'tè ozali Nzambe." 34 Yezu alobi na bango: "Na Mibeko na bino ekómamá boye: 'Nalobi: bozali banzambe.' 35 Ya solo, bato oyo bazalaki koyoka maloba na ye, Nzambe abengaka bango 'banzambe'. Makambo ekómamá na Mikanda ya Nzambe ekoki kolongwa té. 36 Nzokande Nzambe aponá ngai moto na ye, pe atindi ngai na mokili, yango wana nalobi 'tè nazali Mwana ya Nzambe. Ndenge nini bozali koloba 'tè natsioli Nzambe? 37 Soki nasalaka misala ya Tata na ngai té, bóndimela ngai té. 38 Kasi soki nasalaka yango, atako bolingi kondimela ngai té, bóndima po na misala na ngai. Bongo bóyeba libela 'tè ngai ná Tata tozali moto moko." 39 Bayuda baluki kokanga ye lisusu, kasi bazwaki ye té. 40 Yezu akei na ngambo ya Yordan pe atikalaki kuna, na esika Yoane azalaká kobatisa bato kala. 41 Bato mingi bayei epai na ye pe balobi: "Yoane asalaka likamwisi moko té, kasi makambo nyonso ye alobaká po na moto oyo ezali ya solo." 42 Pe kuna, bato mingi bandimaki Yezu.

Yoane 11

Liwa ya Lazare

1 Moto moko kombo na ye Lazare azalaki na maladi na Betanie, mboka ya Maria ná ndeko na ye Marte. 2 Maria azali mwasi oyo apakolaki Nkolo Yezu malasi na makolo, pe apangusaki yango na suki na ye, bongo ndeko na ye Lazare moto azalaki na maladi. 3 Bandeko na ye mibale ya basi batindi moto ákende koyebisa Yezu 'tè: "Mokonzi, moto oyo yo olingaka azali na maladi." 4 Kasi tango Yezu ayoki sango yango, alobi: "Lazare azali na maladi, kasi akokufa té. Maladi wana ekomonisa lokumu ya Nzambe, pe ngai Mwana na ye nakozwa lokumu po na yango." 5 Yezu azalaki kolinga Marte ná ndeko na ye Maria, ná Lazare. 6 Tango ayoki 'tè Lazare azali na maladi, aumeli lisusu mikolo mibale na esika ye azalaki. 7 Sima na yango alobi na bayekoli na ye: "Tózonga na région ya Yuda." 8 Bayekoli bazongiseli ye: "Moteyi, bobele sik'oyo Bayuda balingaki koboma yo na mabanga, pe olingi kozonga lisusu kuna?" 9 Yezu alobi na bango: "Mokolo moko ezali na bangonga zomi na mibale té? Soki moto atamboli na moi, akoki kobeta libaku té po azali komona polele. 10 Kasi soki moto atamboli na butu akobeta mabaku, po azali komona té." 11 Sima ya maloba wana, Yezu abakisi lisusu: "Moninga na biso Lazare alali pongi, kasi nakei kolamusa ye." 12 Bayekoli bazongiseli ye: "Mokonzi, soki alali pongi akobika." 13 Kasi kolala oyo Yezu alobaki ezali liwa; nzokande bayekoli bakanisaki 'tè ezalaki bobele pongi. 14 Bongo Yezu alobi na bango polele: "Lazare akufi. 15 Nazali na esengo po na bino, po ngai nazalaki kuna té; boye bokondima ngai. Kasi tókende kuna epai na ye." 16 Bongo Toma oyo bábengaka Mapasa alobi na bayekoli mosusu: "Biso nyonso tókende kokufa ná Moteyi esika moko."

Yezu azali mosekwisi

17 Tango Yezu akómi, akuti basi'bakundi Lazare eleki mikolo minei. 18 Kolongwa Betanie tii na Yeruzalem ezali na ba-kilomètre soki misato pamba, 19 yango wana Bayuda ebele bayaki epai ya Maria ná Marte kolongola bango mawa po na liwa ya ndeko na bango Lazare. 20 Tango Marte ayoki 'tè Yezu azali koya, akei koyamba ye na nzela, kasi Maria atikalaki na ndako. 21 Marte alobi na Yezu: "Mokonzi, soki ozalaki awa, mbele ndeko na ngai akufaki té. 22 Kasi nayebi 'tè ata sik'oyo Nzambe akopesa yo makambo nyonso oyo okosenga epai na ye." 23 Yezu alobi na ye: "Ndeko na yo akosekwa." 24 Marte azongiseli ye: "Nayebi 'tè akosekwa tango Nzambe akosekwisa bato, na mokolo ya suka." 25 Yezu alobi na ye: "Ngai nazali mosekwisi pe napesaka bomoi. Moto oyo andimi ngai akozala na bomoi sima ya liwa na ye. 26 Moto nyonso oyo azali na bomoi na ndenge andimeli ngai, akokufa ata mokolo moko té. Ondimi yango?" 27 Marte azongisi: "Ee, Mokonzi, nandimi 'tè ozali Mesia, Mwana ya Nzambe, oyo toyebaki 'tè akoya na mokili."

Yezu aleli

28 Tango Marte asilisi koloba bongo, akei kobenga ndeko na ye Maria, pe alobi na ye na litoi: "Moteyi asi'ayei, azali kobenga yo." 29 Awa Maria ayoki boye, atelemi pe akei mbangu epai ya Yezu. 30 Yezu akómaki nanu na mboka té; azalaki kaka na esika oyo Marte akutanaki na ye. 31 Bayuda oyo bazalaki ná Maria na kati ya ndako po na kolongola ye mawa, bamonaki 'tè atelemi mbangu pe abimi na libanda; bongo balandi ye po bakanisaki 'tè akei kolela na simetiere. 32 Awa Maria akómi esika Yezu azalaki, akwei na makolo na ye, pe alobi na ye: "Mokonzi, soki ozalaki awa, mbele ndeko na ngai akufaki té." 33 Tango Yezu amoni Maria azali kolela, pe bato oyo bayaki na ye bazali kolela lisusu, ayoki mawa mingi pe pasi na motema. 34 Atuni bango: "Esika nini bókundaki ye?" Bazongiseli ye: "Mokonzi, yaka kotala." 35 Yezu aleli. 36 Bayuda balobi: "Tala, azalaki kolinga ye mingi!" 37 Kasi bato mosusu balobi: "Ye moto abikisaki moto oyo azalaki na miso ya kokufa. Bongo akokaki pe kopekisa liwa ya Lazare té?"

Yezu asekwisi Lazare

38 Yezu ayokaki mawa mingi na motema, pe akei na simetiere. Ezalaki libulu na kati ya mabanga, pe na monoko na yango batiaki libanga ya monene. 39 Yezu alobi: "Bólongola libanga." Kasi Marte, ndeko ya moto oyo akufaki, alobi na ye: "Mokonzi, azali kolumba solo, pamba té asi'asali mikolo minei na libulu." 40 Yezu azongiseli ye: "Soki ondimi, okomona lokumu ya Nzambe. Nalobaki boye té?" 41 Na sima balongoli libanga. Yezu atomboli miso na likolo, alobi: "Tata, napesi yo mersi po oyokeli ngai. 42 Nayebi 'tè oyokelaka ngai tango nyonso, kasi nazali koloba boye po na bato oyo bazali awa ná ngai, bándima 'tè yo moto otindi ngai." 43 Sima ya maloba wana, agangi na mongongo makasi: "Lazare, bima!" 44 Moto oyo akufaki abimi; makolo ná maboko ezalaki ya kokangama, pe elongi na ye elíngamaki na elamba. Yezu alobi na bango: "Bófungola ye pe bótika ye átambola."

Banganga-Nzambe ná ba-Farizé bakani koboma Yezu

45 Bato mingi na kati ya Bayuda oyo bayaki epai ya Maria bandimaki Yezu po bamonaki makambo asalaki. 46 Kasi bato mosusu na kati na bango bakei koyebisa na ba-Farizé makambo oyo Yezu asalaki. 47 Bakonzi ya banganga-Nzambe ná ba-Farizé babengisi bato nyonso ya Likita-Monene, pe balobani boye: "Tokosala nini? Moto oyo azali kosala makamwisi mingi! 48 Soki totiki ye asalaka kaka boye, bato nyonso bakondima ye, pe bakonzi ya Rome bakoya koboma Ndako ya Nzambe na biso, pe ekolo na biso." 49 Moto moko na kati na bango kombo na ye Kaife, oyo azalaki nganga-Nzambe monene na mbula wana, alobi: "Bino bozali na mayele té! 50 Boyebi té 'tè ebongi malamu moto moko ákufa po na bato nyonso, bongo ekolo mobimba ébeba té?" 51 Alobaki makambo wana na makanisi na ye moko té, kasi lokola azalaki nganga-Nzambe monene na mbula wana, asakoli 'tè Yezu akokufa po na ekolo mobimba. 52 Ya solo, Yezu akufaki kaka po na ekolo ya Bayuda té, kasi po na kosangisa bana ya Nzambe nyonso oyo bapanzaná na mokili mobimba. 53 Banda mokolo wana, bakonzi ya Bayuda bakati 'tè báboma Yezu. 54 Yango wana Yezu abandaki komonana lisusu na miso na bango té. Akei na mboka moko penepene ya esobe, kombo na yango Efrairn, pe afandi kuna ná bayekoli na ye. 55 Feti ya Bayuda ya Pake ekómaki penepene, bongo bato mingi ya mboka bakei na Yeruzalem liboso ya feti, po na komibongisa ndenge mibeko na bango ezali kotinda. ^Baluki Yezu na Ndako ya Nzambe, pe batunani: "Bokanisi nini? Akoya na feti to akoya té?" 57 Bakonzi ya banganga-Nzambe ná ba-Farizé bapesaki motindo 'tè soki moto ayebi esika Yezu azali, áya koyebisa bango po bákende kokanga ye.

Yoane 13

Maria apakoli Yezu malasi

1 Etikalaki mikolo motoba po na kokóma na Pake; Yezu akei na Betanie, mboka ya Lazare moto oyo ye asekwisaki. 2 Kuna basalelaki ye feti. Marte azalaki kotiela bango biloko na mesa, pe Lazare azalaki na kati ya bato oyo bafandaki esika moko ná Yezu. 3 Maria akamati molangi ya malasi ya talo mingi penza, pe apakoli yango na makolo ya Yezu, bongo apangusi yango na suki na ye. Ndako mobimba etondi na solo ya malasi. 4 Moko na kati ya bayekoli, Yudas Iskariot, oyo atekaki Yezu, alobi: 5 "Po na nini batekisi malasi yango na mbongo ebele té, po bápesa yango na bato bakelelá?" 6 Alobaki bongo té po azalaki kokanisa bato bakelelá, kasi po azalaki moyibi; pamba té bazalaki kobombisa mbongo epai na ye, pe abandaki koyiba yango. 7 Kasi Yezu azongisi: "Bótika ye. Lokola etikali moke bákunda ngai, ye asali malamu na ndenge abombaki yango tii sik'oyo. 8 Bokobanda kozala na bato bakelelá tango nyonso; kasi ngai, nakozala ná bino tango nyonso té."

Banganga-Nzambe bakanl báboma Lazare

9 Bayuda ebele bayokaki 'tè Yezu azali na Betanie, bongo bakei kuna; bakendeki kaka po na Yezu té, kasi po na kotala pe Lazare oyo ye asekwisaki. 10 Yango wana bakonzi ya banganga-Nzambe bayei kokana báboma Lazare; 11 pamba té ezali likolo na ye nde Bayuda mingi balongwaki epai na bango pe bakómaki kondima Yezu.

Yezu akoti na Yeruzalem

12 Sima ya mokolo moko, bato oyo bayaki po na feti ya Pake bayoki 'tè Yezu akoya na Yeruzalem. 13 Bakamati mandalala, bongo bakei koyamba ye na nzela, pe babandi koganga: "Ozana! Lokumu na Nzambe! Nkolo ábenisa moto oyo ayei na kombo na ye! Longonya na mokonzi ya Israel!" 14 Yezu azwi punda, bongo abuti, ndenge ekómamá na Mikanda: ""Kobanga té, vile ya Sion! Tala mokonzi na yo ayei, afandi na punda." 16 Mokolo wana bayekoli bayebaki tina ya makambo yango té; kasi tango Yezu azwaki lokumu, bayei kokanisa 'tè basalaki bobele ndenge ekómamá po na ye. 17 Mokolo Yezu abimisaki Lazare na simetiere pe asekwisaki ye, bato mingi bazalaki kuna; bongo batambwisaki sango yango. 18 Yango wana bato ebele bayei kokutana ná ye, po bayokaki likamwisi oyo asalaki. 19 Boye ba-Farizé balobi bango na bango: "Bomoni! Bokoki kosala eloko té; bato nyonso babandi kolanda ye!"

Bapaya baluki Yezu

20 Na kati ya bato oyo bayaki na feti po na kokumisa Nzambe, ezalaki pe na bato mosusu oyo bazali bayuda té. 21 Bakei koloba na Filipe moto ya Betsaida ya Galilé: "Tata, tolingi komona Yezu." 22 Filipe akei koloba na André, bongo bango mibale bakei koyebisa Yezu. 23 Yezu azongiseli bango: "Sik'oyo tango esi'ekoki oyo ngai Mwanà ya Moto nakozwa lokumu. 24 Nazali koloba na bino, ya solo: soki mbuma ya blé ekwei na mabelé té pe ekufi té, ekotikala kaka mbuma moko; kasi soki ekufi na kati ya mabelé, ekobota mbuma mingi. "Moto alingi bomoi na ye, akobungisa yango, kasi moto andimi kobungisa bomoi na ye na mokili oyo, akozwa bomoi ya seko. 26 Soki moto alingi kosalela ngai, alanda ngai, bongo biso ná mosali na ngai tokozala esika moko. Soki moto asaleli ngai, Tata akokumisa ye."

Yezu ayebisi ndenge akokufa

27 "Sik'oyo nazali komona pasi na motema. Náloba nini? Náloba 'tè: 'Tata, bikisa ngai na pasi oyo?' Té. Nayaki kaka po námona pasi oyo. 28 Tata, lakisa penza 'tè ozali Tata." Mongongo euti na Likolo elobi: "Nasi'nalakisi yango, pe nakolakisa yango lisusu." 29 Bato oyo bazalaki wana, tango bayoki mongongo yango balobi: "Ezali kake." Bamosusu balobi: "Anjelu ayei koyebisa ye likambo." 30 Kasi Yezu alobi: "Mongongo yango elobi po na ngai té, kasi elobi po na bino. 31 Sik'oyo tango ekoki: Nzambe akokata makambo ya bato ya mokili; sik'oyo akobengana mokonzi na bango. 32 Tango bakotombola ngai, nakozala kobenda bato nyonso epai na ngai." 33 Na maloba oyo, Yezu alakisaki ndenge ye akokufa. 34 Bato bazongiseli ye: "Biso toyebi na Mibeko na biso 'tè "Mésia akoumela seko. Ndenge nini olobi na biso 'tè bakotombola Mwana ya Moto? Mwana ya Moto oyo ozali koloba, ye nani?" 35 Yezu alobi na bango: "Moi ezali nanu na kati na bino mwa tango moke; bótambolaka tango moi ezali nanu, po butu ékweela bino té; pamba té, moto oyo atambolaka na molili, ayebaka té esika azali kokende. 36 Awa bozali na moi, bóndima makambo moi ezali kolakisa bino, po bókóma bato ya moi."

Bayuda bandimeli Yezu té

Sima ya maloba wana, Yezu alongwe pe akei komibomba. 37 Atako asalaki makamwisi mingi na miso na bango, kasi bazalaki kondima ye té. 38 Ya solo esalamaki bobele ndenge profete Ezaya alobaki: "Nkolo, nani andimaki sango na biso? Nani ayebaki 'tè Nkolo moto asali makambo yango?" 39 Bakokaki kondima té, po Ezaya alobaká lisusu boye: 40 "Nzambe akangi bango miso pe asilisi bango mayele, po bámona té, bázwa mayele té, pe baya epai na ngai té po nábikisa bango." 41 Ezaya alobaká bongo pamba té amonaki lokumu ya Yezu pe azalaki koloba po na ye. 42 Nzokande na kati ya bakonzi ya Bayuda, bato ebele bandimaki Yezu, kasi babandaki koloba yango na miso ya bato té, po bazalaki kobanga 'tè ba-Farizé bakobengana bango na ndako ya losambo. 43 Pamba té, bazalaki koluka lokumu epai ya bato, kasi epai ya Nzambe té.

Mateya ya Yezu ekokatela bato etumbu

44 Yezu alobi na mongongo makasi: "Moto oyo andimi ngai, andimi kaka ngai té, kasi andimi pe Moto oyo atindaki ngai. 45 Oyo amoni ngai, amoni pe Moto oyo atindi ngai. 46 Ngai nayaki na mokili lokola moi, po moto nyonso oyo andimi ngai, atambolaka lisusu na molili té. 47 Soki moto azali koyoka maloba na ngai kasi azali kotosa yango té, ngai té moto nakokatela ye etumbu; pamba té nayaki po na kokatela bato etumbu té kasi po na kobikisa bango. 48 Moto oyo aboyi ngai pe ayambi mateya na ngai té, zuzi na ye azali. Mateya oyo ngai nazali koteya, yango nde moto ekokatela ye etumbu na mokolo ya suka. 49 Pamba té nalobaka na mayele na ngai moko té, kasi Tata oyo atindaki ngai, ye nde moto alakisaki ngai makambo nasengeli koloba pe koteya. 50 Nayebi 'tè makambo oyo ye alakisaka, epesaka bato bomoi ya seko. Yango wana, makambo oyo nazali koloba, nalobaka yango se ndenge Tata alakisaki ngai."

Yoane 13

Yezu asukoli makolo ya bayekoli na ye

1 Feti ya Pake ekómaki penepene, Yezu ayebaki 'tè tango na ye ekoki po álongwa na mokili pe ákende epai ya Tata. Azalaki kolinga bato na ye oyo bazalaki na mokili; azalaki kolinga bango mingi penza. 2 Alakisi bolingo yango tango bazalaki kolia. Zabolo asi'akotelaki Yudas, mwana ya Simon Iskariot, apesi ye likanisi ya koteka Yezu. 3 Nzokande Yezu ayebaki 'tè Tata asi'atii makambo nyonso na maboko na ye; ayebaki 'tè autaki na Nzambe pe akozonga epai ya Nzambe. 4 Tango bazalaki kaka na mesa, atelemi, alongoli nzambala na ye, akamati elamba moko pe akangi yango na loketo. 5 Na sima atii mai na sani, abandi kosukola bayekoli na ye makolo, pe apangusi bango mai na elamba oyo akangaki na loketo. 6 Tango akómi na Simon Piere, ye atuni: "Mokonzi, yo okosukola ngai makolo?" 7 Yezu azongiseli ye: "Likambo nazali kosala sik'oyo, oyebi tina na yango té, kasi okoyeba yango sima." 8 Piere alobi na ye: "Ósukola ngai makolo? Ekoki kosalama ata mokolo moko té!" Yezu azongiseli ye: "Soki nasukoli yo makolo té, okozwa bolamu na ngai té." 9 Simon Piere alobi na ye: "Mokonzi, soki bongo, kosukola ngai kaka makolo té, kasi sukola ngai pe maboko ná motú!" 10 Yezu alobi na ye: "Moto oyo asi' asukoli nzoto mobimba, asi'akómi peto; asengeli kosukola bobele makolo. Bino pe bozali peto, kasi bino nyonso té." 11 Yezu ayebaki moto oyo akoteka ye, yango wana alobaki: "Bozali peto, kasi bino nyonso té." 12 Tango asilisi kosukola bango makolo, alati bilamba na ye pe ayei kofanda na mesa, alobi na bango: "Boyebi tina ya likambo oyo nasali bino? 13 Bino bobengaka ngai Moteyi pe Mokonzi; bolobaka malamu, po nazali Moteyi pe Mokonzi. 14 Bongo soki ngai, Mokonzi pe Moteyi, nasukoli bino makolo, bino pe bosengeli kosukolana makolo bino na bino. 15 Napesi bino ndakisa po bino pe bosalaka ndenge ngai nasali bino. 16 Nazali koloba na bino, ya solo: mosali aleki mokonzi na ye té, pe ntoma aleki moto oyo atindi ye té. 17 Lokola boyebi yango, soki bosali ndenge wana bokozala na esengo mingi. 18 "Nazali koloba po na bino nyonso té. Ngai nayebi bato oyo naponá. Kasi ebongi ésalama ndenge ekómamá: 'Moto oyo azali kolia esika moko na ngai, asali ngai mabe.' 19 Nalobi na bino makambo yango sik'oyo, lokola nanu esalami té. Bongo tango ekosalama, bóndima 'tè Ngai Nazali. 20 Nazali koloba na bino, ya solo: moto ayambi moto oyo ngai natindi, ayambi ngai moko. Pe moto ayambi ngai, ayambi Moto oyo atindi ngai."

Yezu ayebisi 'tè Yudas akoteka ye

21 Tango Yezu asilisi koloba bongo, ayoki pasi na motema, pe alobi na bango: "Nazali koloba na bino, ya solo: moto moko na kati na bino akoteka ngai." 22 Bayekoli babandi kotalana bango na bango; bayebaki té soki azalaki koloba yango po na nani. 23 Moyekoli moko oyo Yezu azalaki kolinga, afandaki penepene ya Yezu. 24 Simon Piere afineli ye liso po átuna Yezu soki alobaki makambo yango po na nani. 25 Moyekoli wana atuni Yezu na litoi: "Mokonzi, moto yango nde nani?" Yezu azongisi: "Nakotia ndambo ya lipa oyo na supu, bongo moto oyo nakopesa yango, nde ye wana." Yezu akamati ndambo ya lipa, atii yango na supu, pe apesi Yudas, mwana ya Simon Iskariot. » Tango Yudas azwi yango, Satan pe akoteli ye. Yezu alobi na ye: "Likambo oyo olingi kosala, sala yango noki." 28 Kasi na kati ya bato oyo bazalaki na mesa, ata moto moko té ayebaki tina ya maloba yango. 29 Pamba té lokola Yudas azalaki kobomba mbongo, bayekoli mosusu bakanisaki 'tè Yezu alobi na ye bongo po ásomba biloko oyo bakoki kolia na feti; bamosusu bakanisaki 'tè atindi ye ákende kopesa lisalisi na bato bakelelá. 30 Awa Yudas akamati ndambo ya lipa wana, kaka na tango yango abimi. Butu esi'ekómaki.

Mobeko ya sika

31 Tango Yudas akei, Yezu alobi: "Sik'oyo ngai Mwana ya Moto nasi'nazwi lokumu, pe Nzambe asi'azwi lokumu po na ngai. 32 Bongo Nzambe pe akopesa ngai lokumu oyo ye moko azali na yango. Etikali kutu moke ápesa ngai yango. 33 Bana na ngai, nakozala na bino lisusu mikolo mingi té. Bokoluka ngai, kasi nazali koloba na bino sik'oyo ndenge nalobaki na Bayuda: bino bokoki kokende té epai ngai nakokende. 34 Napesi bino mobeko ya sika: Bólinganaka bino na bino. Kaka ndenge ngai nalingaka bino, bino pe bólinganaka ndenge wana. 35 Soki bolingani, bato nyonso bakoyeba 'tè bozali bayekoli na ngai."

Yezu ayebisi 'tè Piere akowangana ye

36 Simon Piere atuni Yezu: "Mokonzi, okokende wapi?" Yezu azongiseli ye: "Okoki kolanda ngai sik'oyo té epai nakokende, kasi okolanda ngai sima." 37 Piere atuni ye lisusu: "Mokonzi, po na nini nakoki kolanda yo sik'oyo té? Nakopesa bomoi na ngai po na yo." 38 Yezu azongiseli ye: "Okopesa penza bomoi na yo po na ngai? Nazali koloba na yo, ya solo: liboso 'tè soso élela, okowangana mbala misato 'tè oyebi ngai té."

Yoane 14

Yezu azali nzela oyo ekendé tii epai ya Tata

1 Yezu abakisi alobi: "Bozala mitema likolo té. Bóndima Nzambe, bóndima pe ngai. 2 Na ndako ya Tata na ngai bisika ezali mingi; yango wana nalobi ya solo 'tè nalingi nákende kobongisela bino esika. 3 Bongo, soki nakei kobongisela bino esika, nakoya lisusu kokamata bino, po bino pe bozala esika ngai nazali. 4 Boyebi esika ngai nakokende, pe boyebi nzela na yango." 5 Toma alobi na ye: "Mokonzi, esika yo ozali kokende, biso toyebi yango té. Ndenge nini tokoki koyeba nzela?" 6 Yezu alobi na bango: "Ngai nazali nzela; oyo alandi ngai akozwa makambo ya solo pe bomoi. Nzela mosusu ezali té oyo ekendé epai ya Tata. 7 Soki boyebaki ngai, mbele bolingaki koyeba pe Tata na ngai. Banda sik'oyo boyebi ye, pe bomoni ye." 8 Filipe alobi na ye: "Mokonzi, lakisa biso Tata, bongo tokoluka eloko mosusu té." 9 Yezu azongiseli ye: "Filipe, banda kala nazali na bino, bongo oyebi ngai té? Moto oyo amoni ngai amoni pe Tata. Ndenge nini olobi: 'Lakisa biso Tata?' 10 Ozali kondima té 'tè ngai ná Tata tozali moto moko? Makambo nyonso nazali koloba na bino eutaka na ngai moko té, kasi Tata oyo azali ná ngai, ye nde moto azali kosala misala na ye. 11 Bóndima maloba na ngai: ngai ná Tata tozali moto moko. Soki nanu bondimi té, bóndima ata po na misala wana. 12 Nazali koloba na bino, ya solo: moto oyo andimi ngai, akosala pe misala oyo ngai nasalaka. Akosala kutu makambo eleki monene, pamba té ngai nazali kokende epai ya Tata. 13 Makambo nyonso bokosenga na kombo na ngai, nakosala yango, bongo Tata akozwa lokumu po na ngai Mwana na ye. 14 Soki bosengi eloko na kombo na ngai, nakosala yango."

Tata akotinda Molimo Mosantu

15 "Soki bólingaka ngai, bokotosa mibeko na ngai. 16 Bongo nakosenga Tata, pe ye akopesa bino Mosalisi mosusu, po ázala na bino seko. 17 Ye nde Molimo, oyo ayebisaka makambo nyonso Nzambe azali kolakisa. Bato ya mokili bakoki kozwa ye té, po bamoni ye té, pe bayebi ye té. Kasi bino boyebi ye, po azalaká na bino, pe azali na kati ya mitema na bino. 18 "Nakotika bino lokola bana etike té; nakozonga epai na bino. "Etikali moke, bato ya mokili bakomona ngai lisusu té. Kasi bino bokomona 'tè nazali na bomoi, bino pe bokozala na bomoi. 20 Soki tango wana ekoki, bokoyeba 'tè ngai ná Tata tozali moto moko, pe ngai ná bino tozali moto moko. 21 "Moto oyo ayebi mibeko na ngai pe atosaka yango, ye nde moto alingi ngai. Tata na ngai akolinga moto oyo alingaka ngai; ngai pe nakolinga ye, pe nakomimonisa epai na ye." 22 Yuda (kasi Yudas Iskariot té) atuni ye: "Mokonzi, po na nini okomimonisa epai na biso kasi na bato ya mokili té?" 23 Yezu azongiseli ye: "Soki moto alingi ngai, akobanda kotosa maloba na ngai. Tata na ngai pe akolinga ye, bongo ngai ná Tata tokoya kofanda epai na ye. 24 Moto oyo alingi ngai té, atosaka maloba na ngai té. Mateya oyo bino bozali koyoka ezali ya ngai té, kasi ezali nde ya Tata oyo atindaki ngai. 25 "Nalobi na bino makambo oyo tango nazali nanu na kati na bino. 26 Molimo Mosantu, Mosalisi oyo Tata akotindela bino na kombo na ngai, akolakisa bino makambo nyonso pe akopesa bino mayele, po bókanisaka makambo nyonso oyo nalobaki na bino. 27 "Natikeli bino boboto; ngai moko nakobanda kobatela bino po bozala na boboto. Boboto yango ekozala té lokola oyo makambo ya mokili ememelaka bato. Bozala mitema likolo té, pe bóbanga té. 28 Boyokaki 'tè nalobaki na bino: 'Nakei, kasi nakozonga epai na bino.' Soki bolingi ngai, bokosepela po nazali kokende epai ya Tata, pamba té Tata aleki ngai. 29 Nayebisi bino makambo yango sik'oyo, liboso 'tè ésalama; po tango ekosalama, bóndimela ngai. 30 Nakolobela bino lisusu makambo mingi té, pamba té mokonzi ya mokili oyo azali koya. Akoki kosala ngai eloko té; 31 kasi nyonso ekosalama po bato ya mokili báyeba 'tè nalingaka Tata, pe nasalaka ndenge ye atindaki ngai. Bótelema, tólongwa awa."

Yoane 15

Yezu azali nzete ya vinu ya solo

1 "Ngai nazali lokola nzete ya solo ya vinu, pe Tata na ngai _L «J azali kolo ya elanga. 2 Bitape na ngai oyo ebotaka mbuma té, ye akokata yango; kasi oyo ebotaka, akobongisa yango po ébota mbuma mingi. 3 Mateya oyo napesaki bino esi'ebongisá bino kala. 4 Bókangana na ngai, tózala moto moko. Etape moko té ekoki kobota yango moko, soki ekanganá na nzete ya vinu té. Bino pe ndenge moko, bokoki kosala eloko té soki bokangani na ngai té. 5 "Ngai nazali lokola nzete ya vinu, bino bozali bitape. Moto oyo akanganá na ngai akobota mbuma mingi. Pamba té soki ngai nazali na bino té, bokoki kosala ata eloko moko té. 6 Moto oyo akangani na ngai té, bakobwaka ye na libanda ndenge babwakaka étape ya pamba; yango ekaukaka, bongo balokotaka yango, babwakaka yango na móto pe ezikaka. 7 Soki bokangani na ngai pe na maloba na ngai, bokoki kosenga nyonso oyo bolingi, pe bokozwa yango. 8 Tata na ngai akozwa lokumu soki boboti mbuma mingi. Na ndenge wana bokolakisa 'tè bozali bayekoli na ngai. 9 Nalingaka bino ndenge Tata alingaka ngai. Botikala libela bato na ngai ya bolingo. 10 Soki botosi mibeko na ngai, bokotikala libela bato na ngai ya bolingo, ndenge ngai nazali kotosa mibeko ya Tata na ngai, pe nazali libela moto na ye ya bolingo. 11 "Nalobi na bino bongo po esengo na ngai ézala na mitema na bino, pe bótonda na yango. 12 Mobeko na ngai, yang'oyo: bólinganaka bino na bino ndenge ngai nalingaka bino. 13 Bolingo mosusu ezali té oyo eleki ya moto andimi kokufa po na baninga na ye. 14 Bino bozali baninga na ngai soki bozali kosala makambo oyo natindaka bino. 15 Nakobenga bino lisusu basali té, po mosali ayebaka té makambo mokonzi na ye asalaka. Kasi bino, nakobanda kobenga bino baninga; pamba té nasi'nayebisi bino makambo nyonso Tata na ngai alakisaki ngai. 16 Bino bato boponaki ngai te, kasi ezali ngai nde moto naponaki bino. Napesi bino mosala: bókende, bóbota mbuma; pe nalingi yango éumela. Bongo Tata akobanda kopesa bino nyonso oyo bokozala kosenga na kombo na ngai. 17 Mobeko na ngai, yang'oyo: bólinganaka bino na bino."

Bato ya mokili bakoyina bayekoli ya Yezu

18 "Soki bato ya mokili oyo bazali koyina bino, bóyeba 'tè bayinaki ngai liboso. 19 Soki bozalaki bato ya mokili, mbele bato ya mokili balingaki bino. Kasi ngai naponi bino pe nalongoli bino na kati na bango. Bozali bato ya mokili té, yango wana bakomi koyina bino. ^Bókanisaka makambo nalobaki na bino: 'Mosali aleki mokonzi na ye té.' Ndenge banyokolaki ngai, bakonyokola pe bino; ndenge bandimaki mateya na ngai té, bakondima pe ya bino té. 21 Kasi bakosala bino makambo nyonso wana likolo na ngai; po bayebi té Moto oyo atindaki ngai. 22 Soki nayaki té, pe soki nalobelaki bango té, mbele bazali na lisumu té. Kasi sik'oyo bakoki kowangana lisumu na bango té. "Moto oyo ayinaka ngai, ayinaka pe Tata na ngai. 24 Na miso na bango nasalaki makambo ya minene, oyo moto moko té asi'asalá. Soki nasalaki yango té, mbele bazali na lisumu té. Kasi basi'bamoni misala na ngai, pe bazali kaka koyina ngai ná Tata. "Esalami bobele ndenge ekómamá na Mibeko na bango: 'bayini ngai pamba.' 26 "Nakotindela bino Mosalisi na kombo ya Tata. Ye nde Molimo oyo ayebi makambo nyonso Nzambe azali kolakisa. Akouta epai ya Tata, bongo tango akoya, akoyebisa bino makambo na ngai nyonso. 27 Bino pe bokoyebisa bato makambo na ngai, po bozali ná ngai uta na ebandeli."

Yoane 16

1 Nalobi na bino makambo oyo po bobeta libaku té. 2 Bakobengana bino na bandako na bango ya losambo. Tango ekoya, bato oyo bakoboma bino bakokanisa 'tè bazali kosalela Nzambe. 3 Bakosala bongo po bayebi Tata té; bayebi pe ngai té. 4 Nayebisi bino yango sik'oyo, po tango makambo wana ekosalama, bókanisa 'tè nasi'nayebisá bino yango."

Mosala ya Molimo Mosantu

"Nayebisaki bino makambo yango na ebandeli té, po nazalaki na bino. 5 Sik'oyo nakei epai ya Moto oyo atindaki ngai, pe moko té na kati na bino azali kotuna ngai: 'Okei wapi?' 6 Awa nayebisi bino yango, bobandi kutu koyoka mawa na mitema. 7 Kasi nazali koloba na bino ya solo: yango eleki malamu po na bino; pamba té soki nakei té, Mosalisi akoyeela bino pe té; kasi soki nakei, nakotindela bino ye. 8-11 Tango ye akoya, akomonisa polele 'tè bato ya mokili babungi na makambo misato. Akolakisa 'tè bazali na lisumu, pamba té baboyi kondimela ngai. Akolakisa 'tè Nzambe azali bosembo, pamba té nakei epai ya Tata, pe bokomona ngai lisusu té. Akolakisa pe ndenge Nzambe akataka makambo, pamba té mokonzi ya mokili oyo asi'azwi etumbu na ye. 12 "Nazali lisusu na makambo ebele ya koyebisa bino, kasi ekoleka mingi po na bino sik'oyo. 13 Molimo alingi áya; ye nde moto ayebi makambo nyonso oyo Nzambe azali kolakisa, bongo akoyebisa bino makambo nyonso ya solo. Akoloba na kombo na ye moko té, kasi akoloba bobele makambo oyo ye ayokaki, pe akoyebisa bino makambo ekoya. 14 Ye akokumisa ngai, pamba té akozwa makambo nyonso epai na ngai pe akoyebisa bino yango. 15 Nyonso oyo Tata azali na yango, ezali pe ya ngai. Yango wana nalobi 'tè Molimo akozwa makambo nyonso epai na ngai, bongo akoyebisa bino yango."

Mawa ekobongwana esengo

16 "Etikali moke bokomona ngai lisusu té, bongo sima ya mwa tango bokomona ngai lisusu." 17 Bayekoli mosusu babandi kotunana: "Likambo wana elingi koloba nini? Azali koloba na biso: 'Etikali moke bokomona ngai lisusu té, bongo sima ya mwa tango bokomona ngai lisusu.' Pe 'Nazali kokende epai ya Tata.' 18 'Mwa tango' elingi koloba nini? Toyebi tina ya maloba na ye té." 19 Yezu ayebaki 'te balingi kotuna ye, yango wana alobi na bango: "Nalobaki na bino: 'Etikali moke bokomona ngai lisusu té, bongo sima ya mwa tango bokomona ngai lisusu.' Bozali kotunana po na maloba wana? 20 Nazali koloba na bino, ya solo: bino bokolela pe bokozala na mawa, kasi bato ya mokili bakosepela. Bokozala na mawa, kasi mawa na bino ekobongwana esengo. 21 Soki mwasi alingi kobota, ayokaka mawa po tango ya pasi ekoki; kasi soki asi'aboti, akanisaka lisusu pasi yango té; azalaká na esengo po moto abotami. 22 Bino pe ndenge moko; sik'oyo bozali na mawa, kasi nakoya kotala bino lisusu, pe mitema na bino ekotonda na esengo; ata moto moko té akokoka kolongola bino yango. 23 "Mokolo wana bokotuna ngai lisusu ata likambo moko té. Nazali koloba na bino, ya solo: Tata akopesa bino makambo nyonso oyo bokosenga na kombo na ngai. 24 Tii lelo, nanu bosengi eloko moko té na kombo na ngai. Bósenga pe bokozwa yango; bongo bokotonda na esengo."

Yezu asi'alongi mabe ya mokili

25 "Nazalaki koloba na bino makambo nyonso wana se na masapo. Na tango ekoya nakoloba na bino lisusu na masapo té, kasi nakobanda koyebisa bino polele makambo ya Tata. 26 Na eleko wana bokosenga makambo nyonso na kombo na ngai. Nalobi té 'tè ngai moto nakosengela bino yango na Tata, 27 pamba té Tata ye moko alingaka bino. Alingaka bino po bino bolingi ngai, pe bondimi 'tè ngai nautá epai ya Nzambe. 28 Ya solo, nautá epai ya Tata. Nayaki awa na mokili; sik'oyo nazali kotika mokili oyo po názonga epai ya Tata." 29 Bayekoli na ye bazongisi: "Omoni, sik'oyo okómi koloba na biso polele pe otiki masapo. 30 Sik'oyo toyebi 'tè oyebi makambo nyonso, bongo tina ezali té po moto átuna yo lisusu. Yango wana tondimi 'tè outá epai ya Nzambe." 31 Yezu alobi na bango: "Sik'oyo bondimi? 32 Tango ezali koya, pe esi'ekomi, oyo bokopanzana bipai na bipai, moto na moto na nzela na ye, bongo bokotika ngai, ngai moko. Kasi nazali ngai moko té, po Tata azalaká ná ngai. 33 Nalobi na bino makambo oyo nyonso po bozala na boboto, lisanga na ngai. Bokomona pasi mingi awa na mokili. Kasi bótia molende. Ngai nasi'nalongi mabe ya mokili."

Yoane 17

Yezu abondeli po na bayekoli na ye

1 Tango Yezu asilisi koloba makambo wana, atomboli miso na likolo pe alobi: "Tata, tango ekoki, kumisa ngai Mwana na yo, po ngai pe nákumisa yo. 2 Pamba té otii ngai Mokonzi ya bato nyonso, po nápesa bomoi ya seko na bato nyonso oyo opesaki ngai. 3 Bomoi ya seko ezali nde koyeba yo, Nzambe ya solo kaka moko, pe koyeba ngai Yezu Kristo, moto yo otindaki. 4 Ngai nakumisi yo awa na se; nasilisi mosala oyo otindaki ngai. 5 Bongo sik'oyo, Tata, pesa ngai lokumu oyo nazalaká na yango epai na yo, liboso 'tè mokili ésalama. 6 "Bato oyo opesi ngai, olongolaki bango na kati ya bato ya mokili. Bazalaki bato na yo, opesi ngai bango; bongo ngai nalakisi bango lokumu na yo, pe bandimi maloba na yo. 7 Bayebi sik'oyo 'tè nyonso oyo opesi ngai, euti epai na yo, 8 pamba té nalakisi bango maloba oyo yo oyebisaki ngai. Bango pe bayambi yango, pe bandimi ya solo 'tè nauti epai na yo, yo moto otindi ngai. 9 "Nazali kobondela yo po na bango. Nazali kobondela po na bato ya mokili oyo té, kasi po na baoyo opesi ngai, pamba té bazali bato na yo. 10 Nyonso oyo ezali ya ngai ezali ya yo; pe nyonso oyo ezali ya yo, ezali pe ya ngai; boye bolamu oyo napesi bango ezali kolakisa lokumu na ngai. 11 "Nazali lisusu na kati ya bato ya mokili té, kasi bango bazali na kati ya bato ya mokili. Ngai nazali koya epai na yo. Tata Mosantu, salela nguya na yo oyo opesá ngai, batela bango po bazala moto moko, ndenge ngai ná yo tozali se moto moko. 12 Tango nazalaki ná bango, nabandaki kobatela bango na nguya na yo oyo opesá ngai. Nabatelaki bango malamu, pe na kati na bango moko té abungaki, longola kaka moto oyo asengelaki kobunga, ndenge ekómamá na Mikanda. 13 "Sik'oyo nazali koya epai na yo. Nazali koloba makambo oyo awa nazali nanu na mokili, po bango bazala na esengo na ngai, pe bátonda na yango. 14 Nalakisaki bango maloba na yo; yango wana bato ya mokili bayini bango, po bazali bato na bango té, ndenge ngai pe nazali moto na bango té. 15 Nasengi té 'tè ólongola bango na mokili; kasi batela bango po bákweya na maboko ya Monguna té. 16 Bazali bato ya mokili oyo té, ndenge ngai pe nazali moto ya mokili oyo té. 17 Yebisa bango maloba na yo po ókómisa bango bato na yo penza; pamba té maloba na yo elakisaka makambo nyonso ya solo. 18 Natindi bango epai ya bato, ndenge yo otindaki ngai epai ya bato. "Napesi yo bomoi na ngai lokola libonza po na bango, po bákóma bato na yo penza. 20 "Nazali kobondela po na bango kaka té, kasi nazali kobondela pe po na bato nyonso oyo bakoyoka mateya na bango pe bakondimela ngai. 21 Tata, kómisa bango nyonso moto se moko, ndenge ngai ná yo tozali moto moko. Bango bazala na biso lisanga, po bato ya mokili bándima 'tè ezali yo moto otindi ngai. 22 Napesi bango lokumu oyo yo opesi ngai, po bazala moto moko, ndenge ngai ná yo tozali moto moko: "ngai ná bango, pe yo ná ngai. Ndenge wana bazala penza moto moko, boye bato ya mokili bakoyeba 'tè yo moto otindi ngai, pe olingi bango ndenge ozali kolinga ngai. 24 "Tata, bato oyo opesi ngai, nalingi bazala ná ngai esika moko, po bámona lokumu oyo opesi ngai. Pamba té, obandá kolinga ngai liboso 'tè mokili ésalama. "Tata, yo ozali bosembo. Bato ya mokili bayebi yo té, kasi ngai nayebi yo, pe bango bandimi 'tè yo moto otindaki ngai. 26 Nasi'nalakisi bango lokumu na yo, pe nakolakisa bango lisusu, po bolingo oyo olingi ngai, ézala na mitema na bango, bongo ngai pe názala na mitema na bango."

Yoane 18

Bakangi Yezu

1 Tango Yezu asilisi koloba makambo wana, akei ná bayekoli na ye na ngambo ya mai ya Sedron, pe akoti ná bango na elanga moko, 2 esika amesanaki kosangana na bango. Yudas oyo atekaki ye, ayebaki elanga yango; 3 yango wana ye pe akei kuna ná basoda pe bakengeli ya Ndako ya Nzambe oyo bakonzi ya banganga-Nzambe ná ba-Farizé bapesaki ye. Bazalaki na bibundeli na maboko, ná bamwinda pe banzete ezali kopela. 4 Yezu ayebaki makambo nyonso ekokweela ye, yango wana akei epai na bango, pe atuni: "Bozali koluka nani?" 5 Bazongiseli ye: "Yezu ya Nazaret." Yezu alobi na bango: "Ngai oyo." Yudas, oyo atekaki ye, azalaki na kati na bango. 6 Tango Yezu alobi na bango: "Ngai oyo", bazongi sima, pe bakwei na mabelé. 7 Yezu atuni bango lisusu: "Bozali koluka nani?" Balobi na ye: "Yezu ya Nazaret." 8 Yezu azongiseli bango: "Nasi'nalobaki na bino 'tè ezali ngai; bongo soki bozali koluka ngai, botika bato oyo bákende." 'Alobi bongo po na kokokisa makambo oyo ye alobaki liboso: "Tata, nabungisi ata moto moko té na kati ya bato oyo opesaki ngai." 10 Simon Piere azalaki na mbeli, abimisi yango, akati mosali ya mokonzi ya banganga-Nzambe litoi oyo ezalaki na liboko ya mobali. Kombo ya moto yango Malkus. 11 Kasi Yezu alobi na Piere: "Zongisa mbeli na yo na mokaba. Ezali Tata na ngai moto apesi ngai kopo oyo ya pasi; bongo olingi námela yango té?"

Bamemi Yezu epai ya Anas

12 Basoda ná mokonzi na bango, pe bakengeli ya Bayuda bakamati Yezu pe bakangi ye singa. 13 Bamemi ye liboso epai ya Anas, pamba té ye azalaki tata ya mwasi, ya Kaife oyo azalaki nganga-Nzambe monene na mbula wana. 14 Ezali Kaife moto alobaki na Bayuda 'tè: "Malamu moto moko kaka ákufa po na bato nyonso."

Piere awangani Yezu

15 Simon Piere ná moyekoli mosusu bazalaki kolanda Yezu na sima. Moyekoli mosusu wana ayebanaki ná nganga-Nzambe monene, yango wana akotaki nzela moko ná Yezu na lopango ya nganga-Nzambe monene, 16 kasi Piere atikalaki na libanda penepene ya porte ya lopango. Moyekoli oyo ayebanaki ná nganga-Nzambe monene abimi; akei koloba na mwasi oyo azalaki kokengela porte ya lopango, pe akotisi Piere. 17 Mwasi yango atuni Piere: "Yo pe ozali moyekoli ya moto wana té?" Piere azongiseli ye: "Té, ngai té." 18 Lokola malili ezalaki makasi, basali ná bakengeli bapelisaki moto pe bafandaki esika moko po na koyotela. Piere pe akei koyotela esika moko ná bango.

Nganga-Nzambe monene asambisi Yezu

19 Nganga-Nzambe monene atuni Yezu mitunapo na bayekoli na ye pe mateya na ye. 20 Yezu azongiseli ye: "Ngai nazalaki kosakola polele na miso ya bato nyonso. Mikolo nyonso nazalaki koteya na bandako ya losambo pe na Ndako ya Nzambe, esika Bayuda nyonso basanganaka. Nalobaki likambo moko té na kobombama. 21 Po na nini ozali kotuna ngai? Tuna bato oyo bayokaki maloba na ngai; bango bayebi malamu makambo nazalaki koloba." 22 Tango Yezu alobi bongo, mokengeli moko azalaki wana, abéti ye mbata pe agangeli ye: "Ozali kozongisa ndenge wana na nganga-Nzambe monene?" 23 Yezu azongiseli ye: "Soki nalobi mabe, lakisa ngai mabe yango; kasi soki nalobi malamu, po na nini obeti ngai?" 24 Anas atindi Yezu epai ya Kaife, nganga-Nzambe monene. Yezu azalaki kaka ya kokangama na singa.

Piere awangani lisusu Yezu

25 Na tango wana Simon Piere azalaki kaka koyotela móto. Bato bazalaki wana batuni ye: "Yo pe ozali moyekoli na ye té?" Kasi Piere awangani, azongisi: "Té, ngai té!" ^Mosali moko ya nganga-Nzambe monene, ndeko ya moto oyo Piere akataki litoi, alobi: "Ezali ya solo, ngai namonaki yo na elanga, esika moko ná ye!" 27 Kasi Piere awangani lisusu. Kaka na tango wana soso eleli.

Bamemi Yezu na tribinal ya Pilate

28 Na tongo penza, balongwe na ndako ya Kaife, bamemi Yezu na ndako ya Pilate, motambwisi ya région ya Yuda. Bayuda baboyi kokota na ndako ya Pilate, po bábebisa ekila té, bongo bákoka kolia mwana-meme ya Pake. 29 Yango wana Pilate abimi, pe akei epai na bango. Bongo atuni bango: "Likambo nini boyei kofundela moto oyo?" 30 Bango bazongiseli ye: "Soki ye azalaki moto ya mabe té, mbele toyei na ye epai na yo té." 31 Pilate alobi na bango: "Soki bongo, bino moko bókamata ye pe bósambisa ye ndenge Mibeko na bino ezali kotinda." Bayuda bazongiseli ye: "Biso tozali na bokonzi ya kobomisa moto té." 32 Boye bakokisi makambo Yezu alobaki, tango alakisaki ndenge nini akokufa. 33 Pilate akoti lisusu na ndako, abengi Yezu pe atuni ye: "Yo ozali mokonzi ya Bayuda?" 34 Yezu azongiseli ye: "Likambo wana otuni ngai, ezali yo moko moto okanisi yango, to bato mosusu bato bayebisi yo yango po na ngai?" 35 Pilate atuni: "Ngai nazali Moyuda? Ezali bandeko na yo moko ná bakonzi ya banganga-Nzambe bato bayei kotika yo epai na ngai. Yo osali nini?" 36 Yezu azongiseli ye: "Bokonzi na ngai euti na bato té. Soki eutaki na bato, mbele basoda na ngai balingaki kobundela ngai po nákweya na maboko ya Bayuda té. Kasi bokonzi na ngai ezali ya mokili oyo té." 37 Pilate atuni ye lisusu: "Bongo yo ozali penza mokonzi?" Yezu azongisi: "Ee, nazali penza mokonzi. Nabotamaki pe nayaki awa na mokili po násakola makambo Nzambe alingaka. Moto nyonso oyo alukaka yango, andimaka maloba na ngai." 38 Pilate atuni ye: "Makambo nini Nzambe alingaka?"

Pilate akateli Yezu etumbu ya liwa

Sima ya maloba wana, Pilate abimi lisusu na libanda epai ya Bayuda. Alobi na bango: "Namoni tina moko té ya kokatela moto oyo etumbu. 39 Kasi bomeseni 'tè nábimisela bino moto moko ya boloko na feti ya Pake. Sik'oyo bolingi nábimisela bino mokonzi ya Bayuda?" 40 Bango nyonso babandi koganga, balobi: "Ye té! Tolingi Barabas!" Barabas azalaki moyibi.

Yoane 19

1 Sima na yango, Pilate atindi bákamata Yezu pe bábeta ye fimbu. 2 Basoda bakamati nzube, basali na yango ekoti lokola ya bakonzi, bongo batii ye yango na motú. Balatisi ye kazaka moko ya motane. 3 Bazalaki koya koloba na ye: "Mbote, mokonzi ya Bayuda!". Pe bazalaki kobeta ye bambata. 4 Pilate abimi lisusu na libanda, pe alobi na bato wana: "Namemeli bino moto oyo, po bóyeba 'tè namoni tina moko té ya kokatela ye etumbu." 5 Yezu pe abimi; alataki ekoti ya nzube pe kazaka ya motane. Bongo Pilate alobi na bango: "Botala moto yango!" 6 Kasi tango bakonzi ya banganga-Nzambe ná bakengeli bamoni ye, bagangi: "Boma ye na kuruze! Boma ye na kuruze!" Pilate alobi na bango: "Bino moko bókamata ye pe boboma ye na kuruze! Ngai namoni tina moko té ya kokatela moto oyo etumbu." 7 Bayuda balobi: "Biso tozali na Mibeko ezali kotinda 'tè moto oyo ákufa, pamba té alobaki 'tè azali Mwana ya Nzambe." 8 Awa Pilate ayoki makambo wana, abangi lisusu mingi. 9 Azongi na ndako pe atuni Yezu: "Yo, outi wapi?" Kasi Yezu azongiseli ye liloba té. 10 Pilate alobi na ye: "Boni, olingi kolobela ngai té? Oyebi té 'tè ngai nazali na bokonzi ya kotika yo, to pe ya kobomisa yo na kuruze?" 11 Yezu azongiseli ye: "Soki Nzambe ápesaka yo bokonzi yango té, olingaki kokoka kosala ngai ata eloko moko té. Yango wana moto oyo ayaki kopesa ngai na maboko na yo, lisumu na ye eleki ya yo." 12 Tango Pilate ayoki makambo wana, abandi koluka nzela po átika Yezu. Kasi Bayuda babandi lisusu koganga makasi: "Soki otiki ye, ozali moninga ya mokonzi ya Rome té. Pamba té moto nyonso oyo amitii mokonzi, azali monguna ya mokonzi ya Rome." 13 Tango Pilate ayoki makambo wana, abimisi Yezu na libanda pe akei kofanda na kiti oyo akatelaka makambo; yango ezali na esika Bayuda bábengaka "Gabata", elakisi: esika batandá mabanga. "Ezalaki penepene ya midi, mokolo ya kolengela feti ya Pake; Pilate alobi na Bayuda: "Mokonzi na bino ye oyo!" 15 Kasi bango nyonso bagangi makasi: "Boma ye! Boma ye! Boma ye na kuruze!" Pilate atuni bango: "Bolingi náboma mokonzi na bino na kuruze?" Bakonzi ya banganga-Nzambe bazongisi: "Biso tozali na mokonzi mosusu té, bobele mokonzi ya Rome." 16 Bongo Pilate apesi bango Yezu po báboma ye na kuruze.

Batii Yezu na kuruze

Basoda bakamati Yezu. 17 Ye moko amemi kuruze na ye, abimi na mboka po na kokende na esika moko kombo 'tè: "Mokuwa ya Motú" (na monoko ya Bayuda "Golgota"). 18 Kuna nde esika basoda batiaki Yezu na kuruze, ná bato mibale, mosusu na liboko na ye ya mobali, mosusu na liboko na ye ya mwasi, bongo Yezu na kati. 19 Pilate atindaki 'tè básala mwa libaya pe bátia yango na kuruze ya Yezu. Bakómaki na libaya yango boye: "Yezu ya Nazaret, mokonzi ya Bayuda." 20 Bayuda mingi batangaki yango, pamba té esika oyo batiaki Yezu na kuruze ezali penepene ya mboka. Bakómaki makambo yango na minoko misato: ya Bayuda, ya bato ya Rome, pe ya ba-Grek. 21 Bongo bakonzi ya banganga-Nzambe ya Bayuda balobi na Pilate: "Kokóma té 'mokonzi ya Bayuda'; kasi kóma boye: 'Moto oyo alobi, nazali mokonzi ya Bayuda.'" 22 Kasi Pilate azongiseli bango: "Oyo ngai nakómi, nasi'nakómi." 23 Tango basoda basilisi kotia Yezu na kuruze, bakamati bilamba na ye, bakaboli yango na bandambo minei, soda moko moko ná ndambo na ye. Bakamati pe nzambala na ye; nzambala wana batóngá yango na biteni té, kasi basalá yango kaka mobimba banda likolo tii na se. 24 Basoda balobanaki: "Tópasola yango té kasi tóbeta zeke, bongo tótala soki nani akozwa yango." Esalamaki bobele ndenge ekómamá na Mikanda ya Nzambe: "Bakabolaki bilamba na ngai; babetaki zeke po na nzambala na ngai." Basoda basalaki kaka ndenge wana. 25 Mama na Yezu atelemaki pembeni ya kuruze ya Yezu, ná ndeko ya mama na ye ya mwasi, ná Maria mwasi ya Klopas, pe Maria ya mboka Magdala. 26 Awa Yezu amoni mama na ye, pe pembeni na ye moyekoli oyo ye azalaki kolinga, alobi na mama na ye: "Mama, tala mwana na yo." 27 Pe alobi na moyekoli: "Tala mama na yo." Banda mokolo wana, moyekoli yango akamati mama na Yezu epai na ye.

Liwa ya Yezu

28 Sima na yango, lokola Yezu ayebaki 'tè asilisi nyonso oyo esengelaki kosalama, bongo po na kokokisa makambo oyo ekómamá na Mikanda alobi: "Nazali na posa ya mai." 29 Elokú moko ezalaki wana, etondá na vinu ya ngayi. Basoda bakotisi linuka na vinu ya ngayi, bakangi yango na mwa-nzete, pe batomboli yango tii na monoko ya Yezu. 30 Tango Yezu asilisi komela vinu ya ngayi, alobi: "Makambo nyonso ekoki." Alalisi motú pe akati motema.

Soda moko atoboli Yezu mopanzi

31 Nzokande bakonzi ya Bayuda bakei kosenga Pilate boye: "Tinda bákende kobuka makolo ya bato oyo bazali na kuruze, pe bálongola bango." Pamba té ezalaki pokwa ya kolengela Mokolo ya Kopema, pe mokolo yango ezalaki feti monene; boye Bayuda balingaki té bibembe étikala na kuruze. 32 Bongo basoda bayei epai ya bato mibale wana batiaki na kuruze esika moko ná Yezu, pe babuki bango makolo. 33 Tango bakomi epai ya Yezu, bamoni 'tè asi'akufi; yango wana babukaki ye makolo té. 34 Kasi soda moko atoboli mopanzi ya Yezu na likonga, pe na mbala moko makila ná mai ebimi. 35 Moto amonaki makambo oyo, ye nde moto azali koyebisa yango. Azali koyebisa ya solo. Nkolo Yezu ye moko ayebi 'tè moto wana azali koloba ya solo, po bino pe bóndima. 36 Yango esalamaki bongo po na kokokisa makambo ekómamá na Mikanda: "Bakobuka ata mokuwa moko té ya mwana-meme." 37 Epai mosusu bakómá boye: "Bakotala moto oyo batoboli mopanzi."

Bakundi Yezu

38 Sima na yango, Jozef ya mboka Arimaté akei kosenga na Pilate nzela po álongola ebembe ya Yezu na kuruze. Ye azalaki moyekoli ya Yezu, kasi azalaki komimonisa té po abandaki kobanga Bayuda. Pilate apesi nzela, bongo Jozef ayei kolongola ebembe ya Yezu. 39 Nikodeme, oyo akendeki mokolo moko kotala Yezu na butu, ye pe ayei. Amemaki mafuta ya mire basangisá ná aloes, ezalaki na bakilo soki tuku misato. 40 Bango mibale bakamati ebembe ya Yezu, pe balingi yango na bilamba ya mike-mike oyo batiaki mafuta wana, ndenge Bayuda basalaka tango bakundaka bato. 41 Elanga moko ezalaki penepene ya esika babomaki Yezu, pe kuna libulu moko ya sika ezalaki, oyo basalá na kati ya mabanga, nanu bakundelá moto moko té. 42 Lokola ezalaki pokwa ya Mokolo ya Kopema, batii nzoto ya Yezu na libulu wana, pamba té yango ezalaki penepene.

Yoane 20

Yezu asekwi

1 Na tongo penza, sima ya Mokolo ya Kopema, tango molili ezalaki nanu, Maria ya mboka Magdala ayei na simetiere. Amoni 'tè libanga oyo bazipelaki libulu esi'elongwe. 2 Akei mbangu epai ya Simon Piere ná moyekoli mosusu oyo Yezu azalaki kolinga, pe alobi na bango: "Balongoli Mokonzi na libulu, pe toyebi té soki batii ye wapi." 3 Piere ná moyekoli mosusu bakei na simetiere. 4 Bango mibale bazalaki kokima mbangu, kasi moyekoli mosusu alekaki Piere na mbangu, pe akómaki na simetiere liboso. 5 Agunzami, amoni bobele bilamba ya mike oyo balingaki nzoto ya Yezu ezali wana na se, kasi akotaki na kati té. 6 Simon Piere akómaki na sima na ye pe akoti na libulu. Amoni bilamba ya mike wana ezalaki na se, 7 ná kitambala oyo bazipaki Yezu na motú. Kitambala ezalaki esika moko ná bilamba ya mike té; kasi ezalaki ya kolingama esika mosusu. 8 Bongo moyekoli mosusu oyo akómaki na simetiere liboso, ye pe akoti, amoni pe andimi na motema. 9 Tii tango wana bayekoli bayebaki nanu té tina ya makambo oyo ekómamá na Mikanda 'tè Yezu akosekwa. 10 Bongo bayekoli mibale wana bazongaki epai na bango.

Yezu abimeli Maria ya mboka Magdala

11 Maria atikalaki kotelema penepene ya simetiere, azalaki kolela. Awa azalaki kolela boye, agunzami po na kotala na kati ya libulu; 12 amoni ba-anjelu mibale balati bilamba ya pembe, bafandi esika nzoto ya Yezu ezalaki, moko epai motú ezalaki, mosusu epai makolo ezalaki. 13 Bongo ba-anjelu batuni ye: "Mama, po na nini ozali kolela?" Ye azongiseli bango: "Balongoli Mokonzi na ngai, pe nayebi té soki batii ye wapi." 14 Awa alobi boye, abaluki pe amoni Yezu atelemi wana, kasi ayebaki ye té. 15 Yezu atuni ye: "Mama, po na nini ozali kolela? Ozali koluka nani?" Maria akanisaki 'tè ye azali mosali ya elanga, pe alobi na ye: "Tata, soki yo moto olongoli ye, yebisa ngai soki otii ye wapi, po nákende kokamata ye." 16 Yezu alobi na ye: "Maria!" Maria pe abaluki epai na ye, alobi na monoko ya Bayuda: "Rabuni!" (elingi koloba "Moteyi"). 17 Yezu azongiseli ye: "Tika ngai nákende, pamba té nanu nabuti epai ya Tata té. Kasi kende koloba na bandeko na ngai 'tè: nakobuta epai ya Tata na ngai oyo azali pe Tata na bino, epai ya Nzambe na ngai oyo azali pe Nzambe na bino." 18 Bongo Maria ya Magdala akei epai ya bayekoli, alobi na bango: "Nasi'namoni Mokonzi!" Pe ayebisi bango makambo oyo Yezu alobaki na ye.

Yezu abimeli bayekoli na ye

19 Ezalaki se mokolo wana na pokwa, sima ya Mokolo ya Kopema, bayekoli bazalaki esika moko. Bakangaki baporte nyonso ya ndako, po bazalaki kobanga Bayuda. Yezu ayei kotelema na kati na bango, pe alobi: "Boboto ézala na bino!" 20 Awa asilisi koloba boye, alakisi bango maboko na ye ná mopanzi na ye. Tango bayekoli bamoni Nkolo Yezu, mitema na bango etondi na esengo. 21 Yezu alobi na bango lisusu: "Boboto ézala na bino! Ndenge Tata atindaki ngai, ngai pe nazali kotinda bino." 22 Sima ya maloba oyo, afuli bango pema na ye, pe alobi: "Bózwa Molimo Mosantu. "Masumu ya bato oyo bino bokobanda kolimbisa, Nzambe ye moko moto akolimbisa yango; masumu ya baoyo bino bokolimbisa té, Nzambe pe akolimbisa yango té."

Yezu ná Toma

24 Toma, moko na kati ya bayekoli zomi na mibale, oyo bábengaka "Mapasa", azalaki na bango té tango Yezu ayaki. 25 Bayekoli mosusu balobi na ye: "Tosi'tomoni Mokonzi!" Kasi Toma azongiseli bango: "Soki namoni bapota ya basete na maboko na ye té, soki nasimbi yango na mosapi té, pe soki natii liboko na ngai na mopanzi na ye té, nakondima ata moke té." 26 Sima ya poso moko, bayekoli bazalaki lisusu na ndako, Toma pe azalaki ná bango. Atako baporte ya ndako ezalaki ya kokangama, Yezu ayei kotelema na kati na bango pe alobi: "Boboto ézala na bino!" 27 Bongo alobi na Toma: "Pusana, kotisa mosapi na yo awa, pe tala maboko na ngai; tia lisusu liboko na yo na mopanzi na ngai. Tika tembe, kasi ndima na motema." 28 Toma azongiseli ye: "Mokonzi na ngai pe Nzambe na ngai." 29 Yezu alobi na ye: "Ondimi po omoni ngai? Esengo na bato oyo bakondima, ata bamoni ngai na miso té."

Tina ya mokanda oyo

30 Yezu asalaki makamwisi mosusu mingi na miso ya bayekoli na ye, kasi yango nyonso ekómamá na mokanda oyo té. 31 Makambo oyo ekómami po bino bóndima 'tè Yezu azali Mesia, Mwana ya Nzambe. Soki bondimi bongo, ye akosala 'tè bózwa bomoi ya seko.

Yoane 21

Yezu abimeli bayekoli na ye sambo

1 Sima ya mwa mikolo, Yezu abimelaki lisusu bayekoli na ye, na libongo ya lak ya Tiberiade. Abimelaki bango boye: 2 Simon Piere, Toma (oyo bábengaka "Mapasa"), Natanael (ya mboka Kana na Galilé), bana ya Zebedé mibale, pe bayekoli mibale mosusu, bango nyonso bazalaki esika moko. 3 Simon Piere alobi na bango: "Nakei na ngai koluka mbisi." Bazongiseli ye: "Biso pe tokokende ná yo nzela moko." Bakei pe bakoti na bwatu. Kasi butu wana mobimba bazwaki ata eloko moko té. 4 Awa tongo ebandi kotana, Yezu ayei kotelema na libongo, kasi bayekoli bayebaki ye té. 5 Bongo Yezu atuni bango: " E bilenge, bozwi eloko té?" Bazongiseli ye: "Eloko té." 6 Yezu alobi na bango: "Bóbwaka monyama na liboko ya mobali ya bwatu, bongo bokozwa." Babwaki monyama pe bakokaki kotombola yango lisusu té, pamba té etondaki na bambisi ebele penza. 7 Moyekoli oyo Yezu azalaki kolinga alobi na Piere: "Ezali Mokonzi!" Tango Simon Piere ayoki 'tè ezali Nkolo Yezu, alati elamba na ye (pamba té alongolaki yango), bongo amibwaki na mai. 8 Bayekoli mosusu bazalaki koya na bwatu, pe bazalaki kobenda monyama oyo etondaki na bambisi; libongo ezalaki bobele penepene. 9 Tango bakomi na libongo, bamoni mbisi likolo ya móto ya makala ná mapa. 10 Yezu alobi na bango: "Bóya na ndambo ya mbisi oyo bouti kokanga." 11 Simon Piere akoti na bwatu pe abandi kobenda monyama oyo etondi na bambisi ya minene ebele, nyonso ezalaki 153 . Atako ezalaki mingi boye, monyama epasukaki té. 12 Bongo Yezu alobi na bango: "Bóya kolia." Ata moyekoli moko té amekaki kotuna ye: "Ozali nani?" Pamba té bayebaki 'tè ezali Nkolo. 13 Yezu ayei penepene na bango, akamati mapa, akaboleli bango, apesi bango lisusu bambisi. 14 Oyo ezalaki mbala ya misato Yezu abimelaki bayekoli na ye, banda mokolo asekwaki.

Yezu ná Piere

15 Awa basilisi kolia, Yezu atuni Simon Piere: "Simon, mwana ya Yoane, yo olingaka ngai mingi koleka baninga?" Piere azongiseli ye: "Ee, Mokonzi, yo moko oyebi 'tè nalingaka yo." Yezu alobi na ye: "Batela bameme na ngai." 16 Bongo atuni ye mbala ya mibale: "Simon, mwana ya Yoane, olingaka ngai?" Azongiseli ye: "Ee, Mokonzi, yo moko oyebi 'tè nalingaka yo." Yezu alobi: "Batela bameme na ngai." 17 Pe atuni ye lisusu mbala ya misato: "Simon, mwana ya Yoane, olingaka ngai?" Piere ayokaki mawa mingi na motema, na ndenge Yezu atunaki ye mbala misato: "Olingaka ngai?" Bongo azongiseli ye: "Mokonzi, yo oyebi makambo nyonso, oyebi 'tè nalingaka yo." Yezu alobi na ye: "Batela bameme na ngai. 18 Nazali koloba na yo, ya solo: tango ozalaki elenge, ozalaki kokanga mokaba na yo, yo moko; pe ozalaki kokende esika yo olingi. Kasi tango okokóma mobange, okotanda maboko, pe moto mosusu akokanga yo mokaba; bongo akomema yo epai yo olingi té." 19 Na maloba oyo, Yezu alakisi ndenge nini Piere akokufa po na kokumisa Nzambe. Na sima, Yezu alobi na Piere: "Landa ngai."

Yezu ná moyekoli oyo ye azalaki kolinga

20 Piere atali na sima, pe amoni moyekoli oyo Yezu azalaki kolinga azali koya. Mokolo bazalaki kolia, liboso 'tè baya kokanga Yezu, moyekoli yango atunaki Yezu na litoi: "Mokonzi, nani moto oyo akoteka yo?" 21 Bongo, awa Piere amoni ye, atuni Yezu: "Mokonzi, makambo nini ekokweela ye?" 22 Yezu azongiseli ye: "Soki nalingi ázala tii tango nakoya, etali yo? Yo, landa kaka ngai." 23 Yango wana, po na maloba yango sango epanzanaki na kati ya bakristo 'tè moyekoli yango akokufa té. Nzokande Yezu alobaki té 'tè ye akokufa té, kasi alobaki: "Soki nalingi ázala tii tango nakoya, etali yo?" 24 Ezali ye moko moyekoli wana moto ayebisaki makambo oyo, pe akómaki yango na mokanda. Toyebi 'tè makambo ye ayebisaki ezali ya solo.

Po na kosukisa

25 Yezu asalaki makambo mosusu mingi. Soki bákómaka yango moko moko na mikanda, nakanisi 'tè mokili mobimba elingaki kokoka té po na kotia mikanda wana.





AMAZING GRACE BIBLE INSTITUTE